الصافات
As-Saaffaat
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
وَٱلصَّٰٓفَّٰتِ صَفّٗا
Open ayah 37:1Na (ba anzelu) baye batelemi na milongo,
فَٱلزَّٰجِرَٰتِ زَجۡرٗا
Open ayah 37:2Mpe na baye bazali kotindika na makasi (mapata).[1]
- Mpe biloko misusu.
فَٱلتَّٰلِيَٰتِ ذِكۡرًا
Open ayah 37:3Na baye batangaka bokundoli.
إِنَّ إِلَٰهَكُمۡ لَوَٰحِدٞ
Open ayah 37:4Ya soló, Nzambe na bino azali moko.
رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا وَرَبُّ ٱلۡمَشَٰرِقِ
Open ayah 37:5Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazuami kati na yango mibale mpe Nkolo wa moniele.
إِنَّا زَيَّنَّا ٱلسَّمَآءَ ٱلدُّنۡيَا بِزِينَةٍ ٱلۡكَوَاكِبِ
Open ayah 37:6Ya sólo, tobongisaki mapata ya nsé na bonzenga ya minzoto.
وَحِفۡظٗا مِّن كُلِّ شَيۡطَٰنٖ مَّارِدٖ
Open ayah 37:7Mpe ebatelami na mabe ya satana motomboki.
لَّا يَسَّمَّعُونَ إِلَى ٱلۡمَلَإِ ٱلۡأَعۡلَىٰ وَيُقۡذَفُونَ مِن كُلِّ جَانِبٖ
Open ayah 37:8Mpo bakoka koyoka te epai ya ba anzelu ya likolo, kasi bakobwakelamaka mabanga ngambu inso,
دُحُورٗاۖ وَلَهُمۡ عَذَابٞ وَاصِبٌ
Open ayah 37:9Bakobenganama mpe bakozala na etumbu ya libela.
إِلَّا مَنۡ خَطِفَ ٱلۡخَطۡفَةَ فَأَتۡبَعَهُۥ شِهَابٞ ثَاقِبٞ
Open ayah 37:10Longola sé oyo akolinga kozua (sango) na lolenge ya moyibi, kasi bakolandisaka kobengana ye na libanga ya moto.
فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَهُمۡ أَشَدُّ خَلۡقًا أَم مَّنۡ خَلَقۡنَآۚ إِنَّا خَلَقۡنَٰهُم مِّن طِينٖ لَّازِبِۭ
Open ayah 37:11Tuna bango, soki kokela bango ezali makasi koleka manso tokela? Te, ya soló, tokelaki bango na mabele ya potopoto oyo ekangaka.
بَلۡ عَجِبۡتَ وَيَسۡخَرُونَ
Open ayah 37:12Kasi soki ozali kokamwa mpe bazali koseka.
وَإِذَا ذُكِّرُواْ لَا يَذۡكُرُونَ
Open ayah 37:13Mpe soki bapesami malendisi (kurani), baboyi kokanisa yango. (kotanga yango)
وَإِذَا رَأَوۡاْ ءَايَةٗ يَسۡتَسۡخِرُونَ
Open ayah 37:14Mpe soki bamoni elembo, bakomi kosalela yango litio.
وَقَالُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ مُّبِينٌ
Open ayah 37:15Mpe balobi: Oyo ezali bonganga (bondoki) ya polele.
أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ
Open ayah 37:16Soki tokufi tokomi mabele, mpe mikuwa, boye tokosekwisama lisusu?
أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ
Open ayah 37:17Na bankoko na biso ya kala?
قُلۡ نَعَمۡ وَأَنتُمۡ دَٰخِرُونَ
Open ayah 37:18Loba: Iyo, bino mpe lokola bokokitisama.
فَإِنَّمَا هِيَ زَجۡرَةٞ وَٰحِدَةٞ فَإِذَا هُمۡ يَنظُرُونَ
Open ayah 37:19Mpe ekozalaka sé bolengisi moko ya makasi, mpe bakomi kotala.
وَقَالُواْ يَٰوَيۡلَنَا هَٰذَا يَوۡمُ ٱلدِّينِ
Open ayah 37:20Mpe bakomi koloba: Eh mawa na biso! Oyo nde mokolo mwa mbano (ya suka mpe lifuti)
هَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِ ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ
Open ayah 37:21Oyo nde mokolo mwa bokati makambo moye botiaki tembe тропа yango.
۞ٱحۡشُرُواْ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ وَأَزۡوَٰجَهُمۡ وَمَا كَانُواْ يَعۡبُدُونَ
Open ayah 37:22Bosangisa babubi na baninga na bango тре baye banso bazalaki kobondela bango.
مِن دُونِ ٱللَّهِ فَٱهۡدُوهُمۡ إِلَىٰ صِرَٰطِ ٱلۡجَحِيمِ
Open ayah 37:23Na botiki Allah, mpe bokamba bango na nzela ya lifelo.
وَقِفُوهُمۡۖ إِنَّهُم مَّسۡـُٔولُونَ
Open ayah 37:24Mpe botelemisa bango mpo bakoka kotunama.
مَا لَكُمۡ لَا تَنَاصَرُونَ
Open ayah 37:25Mpona nini bozali komisunga te?
بَلۡ هُمُ ٱلۡيَوۡمَ مُسۡتَسۡلِمُونَ
Open ayah 37:26Kasi lelo bakoluka kozala na botosi.
وَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖ يَتَسَآءَلُونَ
Open ayah 37:27Mpe basusu bakobongola bilongi epai ya baninga mpe bakomi komitunana.
قَالُوٓاْ إِنَّكُمۡ كُنتُمۡ تَأۡتُونَنَا عَنِ ٱلۡيَمِينِ
Open ayah 37:28Bakolobaka: Ezali bino nde bobengaki biso na makasi. (na bopengwi)
قَالُواْ بَل لَّمۡ تَكُونُواْ مُؤۡمِنِينَ
Open ayah 37:29(Bakonzi) bakolobaka: Bino moko boboyaki kondima.
وَمَا كَانَ لَنَا عَلَيۡكُم مِّن سُلۡطَٰنِۭۖ بَلۡ كُنتُمۡ قَوۡمٗا طَٰغِينَ
Open ayah 37:30Tozalaki na bokoki epai na bino te, bino moko nde bozalaki bato ya mabe.
فَحَقَّ عَلَيۡنَا قَوۡلُ رَبِّنَآۖ إِنَّا لَذَآئِقُونَ
Open ayah 37:31Liloba lia Nkolo wa biso lizali ya soló. Sólo tokomema. (etumbu)
فَأَغۡوَيۡنَٰكُمۡ إِنَّا كُنَّا غَٰوِينَ
Open ayah 37:32Tomemaki bino na libungi, kasi ya soló, tomibungisaki biso moko.
فَإِنَّهُمۡ يَوۡمَئِذٖ فِي ٱلۡعَذَابِ مُشۡتَرِكُونَ
Open ayah 37:33Mokolo mona bakosanganaka (bango) banso na etumbu.
إِنَّا كَذَٰلِكَ نَفۡعَلُ بِٱلۡمُجۡرِمِينَ
Open ayah 37:34Lolenge wana nde tokosalaka na batomboki.
إِنَّهُمۡ كَانُوٓاْ إِذَا قِيلَ لَهُمۡ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا ٱللَّهُ يَسۡتَكۡبِرُونَ
Open ayah 37:35Ya soló, bazalaki soki bayebisi bango nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé Allah, basali lolendo.
وَيَقُولُونَ أَئِنَّا لَتَارِكُوٓاْ ءَالِهَتِنَا لِشَاعِرٖ مَّجۡنُونِۭ
Open ayah 37:36Mpe bazali koloba: Totika banzambe na biso тропа molobi ntôki oyo тре azali moto ya ligboma?
بَلۡ جَآءَ بِٱلۡحَقِّ وَصَدَّقَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Open ayah 37:37Kasi ayaki na bosóló, batindami balobaki bosembo.
إِنَّكُمۡ لَذَآئِقُواْ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡأَلِيمِ
Open ayah 37:38Ya sólo penza, bokomeka etumbu ya makasi.
وَمَا تُجۡزَوۡنَ إِلَّا مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Open ayah 37:39Mpe bokofutama sé kolandana na maye bozalaki kosala.
إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Open ayah 37:40Longola sé bawumbu ya Allah ba oyo baponama.
أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ رِزۡقٞ مَّعۡلُومٞ
Open ayah 37:41Bango nde bakozalaka na bolamu oyo eyebani.
فَوَٰكِهُ وَهُم مُّكۡرَمُونَ
Open ayah 37:42(Bakoliaka) mbuma mpe bakosepelisaka bango.
فِي جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ
Open ayah 37:43Okati na bilanga (lola) bilamu.
عَلَىٰ سُرُرٖ مُّتَقَٰبِلِينَ
Open ayah 37:44Likolo lia bambeto bizali ya kotalana.
يُطَافُ عَلَيۡهِم بِكَأۡسٖ مِّن مَّعِينِۭ
Open ayah 37:45Bakolekiselaka bango коро etondi na mayi ya miluka.
بَيۡضَآءَ لَذَّةٖ لِّلشَّٰرِبِينَ
Open ayah 37:46Ya pembe elengi тропа komela.
لَا فِيهَا غَوۡلٞ وَلَا هُمۡ عَنۡهَا يُنزَفُونَ
Open ayah 37:47Ekosalaka bango mabe te, mpe ekolangwisaka te.
وَعِندَهُمۡ قَٰصِرَٰتُ ٱلطَّرۡفِ عِينٞ
Open ayah 37:48Bakozala na basi ya kitoko pembeni na bango, basi ya miso minene ya kotalatala pembeni te.
كَأَنَّهُنَّ بَيۡضٞ مَّكۡنُونٞ
Open ayah 37:49Bazali lokola pembe ya likei oyo ebatelami.
فَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖ يَتَسَآءَلُونَ
Open ayah 37:50Basusu bakobaluka kot ala baninga na kotunana.
قَالَ قَآئِلٞ مِّنۡهُمۡ إِنِّي كَانَ لِي قَرِينٞ
Open ayah 37:51Moko wa bango akolobaka: Ya soló, nazalaki na moninga.
يَقُولُ أَءِنَّكَ لَمِنَ ٱلۡمُصَدِّقِينَ
Open ayah 37:52Akoloba ete: Boye ozalaki okati ya bandimi.
أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَدِينُونَ
Open ayah 37:53Tango tokokufa mpe tokomi mabele na mikuwa, boye tokotunamaka?
قَالَ هَلۡ أَنتُم مُّطَّلِعُونَ
Open ayah 37:54Akolobaka: Boye bolingi kotala na likolo?
فَٱطَّلَعَ فَرَءَاهُ فِي سَوَآءِ ٱلۡجَحِيمِ
Open ayah 37:55Mpe akotalaka likolo mpe akomonaka ye na lifelo.
قَالَ تَٱللَّهِ إِن كِدتَّ لَتُرۡدِينِ
Open ayah 37:56Mpe akoloba: Na nkombo ya Allah, yo nde osali ete ngai nazanga.
وَلَوۡلَا نِعۡمَةُ رَبِّي لَكُنتُ مِنَ ٱلۡمُحۡضَرِينَ
Open ayah 37:57Soki ezalaka bolamu bwa Nkolo wa ngai te, mbele nalingaki kozala o kati ya bato ya etumbu.
أَفَمَا نَحۡنُ بِمَيِّتِينَ
Open ayah 37:58Ezali solo te ete tokokufa te?
إِلَّا مَوۡتَتَنَا ٱلۡأُولَىٰ وَمَا نَحۡنُ بِمُعَذَّبِينَ
Open ayah 37:59Sé ezala kokufa ya biso ya yambo mpe tokozuaka etumbu te?
إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
Open ayah 37:60Ya soló, oyo nde elonga enene.
لِمِثۡلِ هَٰذَا فَلۡيَعۡمَلِ ٱلۡعَٰمِلُونَ
Open ayah 37:61Na lolenge ya boye nde esengeli na baye balingi kosala basala.
أَذَٰلِكَ خَيۡرٞ نُّزُلًا أَمۡ شَجَرَةُ ٱلزَّقُّومِ
Open ayah 37:62Boye wana ezali esika ya malamu тропа kofanda to ezali nzete ya zaqqüm? (ezali nzete wana mbuma na yango ezali bololo ezali o kati ya lifelo, yango nde bilei ya bato ya mabe),
إِنَّا جَعَلۡنَٰهَا فِتۡنَةٗ لِّلظَّٰلِمِينَ
Open ayah 37:63Totiyaki yango ezala komekama тропа babubi,
إِنَّهَا شَجَرَةٞ تَخۡرُجُ فِيٓ أَصۡلِ ٱلۡجَحِيمِ
Open ayah 37:64Ezali nzete eye ebotaka o kati ya lifelo,
طَلۡعُهَا كَأَنَّهُۥ رُءُوسُ ٱلشَّيَٰطِينِ
Open ayah 37:65Mbuma na yango ezali lokola mitu ya basatana.
فَإِنَّهُمۡ لَأٓكِلُونَ مِنۡهَا فَمَالِـُٔونَ مِنۡهَا ٱلۡبُطُونَ
Open ayah 37:66Ya soló, esengeli na bango kólia yango тре kotondisa mabumu na bango.
ثُمَّ إِنَّ لَهُمۡ عَلَيۡهَا لَشَوۡبٗا مِّنۡ حَمِيمٖ
Open ayah 37:67Sima bakomela mayi ya tofina ya moto.
ثُمَّ إِنَّ مَرۡجِعَهُمۡ لَإِلَى ٱلۡجَحِيمِ
Open ayah 37:68Sima lifelo nde esika ya bozongi na bango ya sólo.
إِنَّهُمۡ أَلۡفَوۡاْ ءَابَآءَهُمۡ ضَآلِّينَ
Open ayah 37:69Ya soló, bakutaki batata na bango na libungi.
فَهُمۡ عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِمۡ يُهۡرَعُونَ
Open ayah 37:70Mpe balandaki sé nzele na bango.
وَلَقَدۡ ضَلَّ قَبۡلَهُمۡ أَكۡثَرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Open ayah 37:71Мре liboso na bango, ebele ya bankoko na bango basilaki kobunga.
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا فِيهِم مُّنذِرِينَ
Open ayah 37:72Tosilaki kotindela bango bakebisi.
فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُنذَرِينَ
Open ayah 37:73Tala lolenge ezalaki тропа baye bakebisamaki.
إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Open ayah 37:74Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama.
وَلَقَدۡ نَادَىٰنَا نُوحٞ فَلَنِعۡمَ ٱلۡمُجِيبُونَ
Open ayah 37:75Mpe ya soló, Nûh abengaki biso тре toyanolaki ye kitoko.
وَنَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥ مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
Open ayah 37:76Mpe tobikisaki ye elongo na libota lia ye na etumbu ya monene.
وَجَعَلۡنَا ذُرِّيَّتَهُۥ هُمُ ٱلۡبَاقِينَ
Open ayah 37:77Mpe totiyaki ete libota lia ye bazala bakitani.
وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Open ayah 37:78Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.
سَلَٰمٌ عَلَىٰ نُوحٖ فِي ٱلۡعَٰلَمِينَ
Open ayah 37:79Kimia ezala likolo ya Nûh kati na mokili mobimba.
إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Open ayah 37:80Ya soló, lolenge wana nde tofutaka babongisi.
إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Open ayah 37:81Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso, baye bandima.
ثُمَّ أَغۡرَقۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
Open ayah 37:82Sima tobomaki basusu.
۞وَإِنَّ مِن شِيعَتِهِۦ لَإِبۡرَٰهِيمَ
Open ayah 37:83Mpe ya soló, Ibrâhîm azalaki moko kati na baye balandaki ye na lingomba.
إِذۡ جَآءَ رَبَّهُۥ بِقَلۡبٖ سَلِيمٍ
Open ayah 37:84Tango ayaki epai ya Nkolo waye na motema mosantu.
إِذۡ قَالَ لِأَبِيهِ وَقَوۡمِهِۦ مَاذَا تَعۡبُدُونَ
Open ayah 37:85Tango alobaki na tata waye тре bato naye: Bozali kobondela nini?
أَئِفۡكًا ءَالِهَةٗ دُونَ ٱللَّهِ تُرِيدُونَ
Open ayah 37:86Na libungi na bino boluki banzambe mosusu botiki Allah?
فَمَا ظَنُّكُم بِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Open ayah 37:87Bozali kokanisa nini тропа Nkolo wa molongo?
فَنَظَرَ نَظۡرَةٗ فِي ٱلنُّجُومِ
Open ayah 37:88Sima atalaki minzoto na bokebi.
فَقَالَ إِنِّي سَقِيمٞ
Open ayah 37:89Mpe alobaki ete: Ya soló ngai nazui malali.
فَتَوَلَّوۡاْ عَنۡهُ مُدۡبِرِينَ
Open ayah 37:90Bapesi ye mokongo bakei.
فَرَاغَ إِلَىٰٓ ءَالِهَتِهِمۡ فَقَالَ أَلَا تَأۡكُلُونَ
Open ayah 37:91Apusani ngambu ya banzambe na bango alobi: Boliaka te?
مَا لَكُمۡ لَا تَنطِقُونَ
Open ayah 37:92Boye bozali koloba te тропа nini?
فَرَاغَ عَلَيۡهِمۡ ضَرۡبَۢا بِٱلۡيَمِينِ
Open ayah 37:93Akei kobeta bango mbata na loboko ya mobali.
فَأَقۡبَلُوٓاْ إِلَيۡهِ يَزِفُّونَ
Open ayah 37:94Sima bato bayaki epai naye na lombango.
قَالَ أَتَعۡبُدُونَ مَا تَنۡحِتُونَ
Open ayah 37:95Ayebisi bango: Boye bozali kobondela bikeko biye bosali bino moko?
وَٱللَّهُ خَلَقَكُمۡ وَمَا تَعۡمَلُونَ
Open ayah 37:96Kasi Allah nde akela bino na maye bozali kosala.
قَالُواْ ٱبۡنُواْ لَهُۥ بُنۡيَٰنٗا فَأَلۡقُوهُ فِي ٱلۡجَحِيمِ
Open ayah 37:97Balobaki ete: Botimola libulu ya moto mpe bobwaka ye na kati.
فَأَرَادُواْ بِهِۦ كَيۡدٗا فَجَعَلۡنَٰهُمُ ٱلۡأَسۡفَلِينَ
Open ayah 37:98Basalelaki ye likita kasi tokweisaki bango.
وَقَالَ إِنِّي ذَاهِبٌ إِلَىٰ رَبِّي سَيَهۡدِينِ
Open ayah 37:99Mpe alobaki ete: Ya soló, ngai nakei epai ya Nkolo wa ngai akokamba ngai.
رَبِّ هَبۡ لِي مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Open ayah 37:100Nkolo, Pesa ngai (mwana) o kati ya bato ya malamu.
فَبَشَّرۡنَٰهُ بِغُلَٰمٍ حَلِيمٖ
Open ayah 37:101Mpe topesaki ye sango elamu ya mwana mobali ya boboto mingi (Ismail).
فَلَمَّا بَلَغَ مَعَهُ ٱلسَّعۡيَ قَالَ يَٰبُنَيَّ إِنِّيٓ أَرَىٰ فِي ٱلۡمَنَامِ أَنِّيٓ أَذۡبَحُكَ فَٱنظُرۡ مَاذَا تَرَىٰۚ قَالَ يَٰٓأَبَتِ ٱفۡعَلۡ مَا تُؤۡمَرُۖ سَتَجِدُنِيٓ إِن شَآءَ ٱللَّهُ مِنَ ٱلصَّٰبِرِينَ
Open ayah 37:102Мре tango (Ismail) akolaki (Ibrâhîm) alobi: Eh mwana wa ngai! Namoni na ndoto ete nazali kokata yo kingo, omoni ndenge nini? (Ismâîl) alobi: Eh tata wa ngai wa bolingo! Sala lolenge batindi yo, okokuta ngai na bolingi ya Allah, okati ya bakangi mitema.
فَلَمَّآ أَسۡلَمَا وَتَلَّهُۥ لِلۡجَبِينِ
Open ayah 37:103Sima ya bango banso mibale kotosa (mibeko mia Allah), alalisi ye mpo ete aboma ye.
وَنَٰدَيۡنَٰهُ أَن يَٰٓإِبۡرَٰهِيمُ
Open ayah 37:104Mpe tobelelaki ye ete: Oh Ibrâhîm!
قَدۡ صَدَّقۡتَ ٱلرُّءۡيَآۚ إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Open ayah 37:105Osili kokokisa (elaka) ya ndoto, lolenge wana nde tofutaka babongisi.
إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡبَلَٰٓؤُاْ ٱلۡمُبِينُ
Open ayah 37:106Ya soló, wana ezalaki momekano mwa polele.
وَفَدَيۡنَٰهُ بِذِبۡحٍ عَظِيمٖ
Open ayah 37:107Mpe topesaki ye ebwele ya kitoko тропа kosasa.
وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Open ayah 37:108Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.
سَلَٰمٌ عَلَىٰٓ إِبۡرَٰهِيمَ
Open ayah 37:109Kimia ezala likolo ya Ibrâhîm.
كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Open ayah 37:110Lolenge wana nde tofutaka babongisi.
إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Open ayah 37:111Ya soló, ye azalaki okati ya bawumbu na biso bandimi.
وَبَشَّرۡنَٰهُ بِإِسۡحَٰقَ نَبِيّٗا مِّنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Open ayah 37:112Mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq, ntoma okati ya (bato) malamu.
وَبَٰرَكۡنَا عَلَيۡهِ وَعَلَىٰٓ إِسۡحَٰقَۚ وَمِن ذُرِّيَّتِهِمَا مُحۡسِنٞ وَظَالِمٞ لِّنَفۡسِهِۦ مُبِينٞ
Open ayah 37:113Mpe topambolaki ye na Is’háq, na libota lia bango mibale oyo ezalaki na (bato ya malamu) mpe oyo akomibuba etali sé ye moko.
وَلَقَدۡ مَنَنَّا عَلَىٰ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ
Open ayah 37:114Mpe ya sólo, tosilaki kopesa na Mûssa na Hânına bolamu na biso.
وَنَجَّيۡنَٰهُمَا وَقَوۡمَهُمَا مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
Open ayah 37:115Mpe tobikisaki bango mibale elongo na bato na bango na etumbu ya monene.
وَنَصَرۡنَٰهُمۡ فَكَانُواْ هُمُ ٱلۡغَٰلِبِينَ
Open ayah 37:116Mpe tolongisaki bango, mpe bango nde bazalaki balongi.
وَءَاتَيۡنَٰهُمَا ٱلۡكِتَٰبَ ٱلۡمُسۡتَبِينَ
Open ayah 37:117Mpe topesaki bango buku ya polele.
وَهَدَيۡنَٰهُمَا ٱلصِّرَٰطَ ٱلۡمُسۡتَقِيمَ
Open ayah 37:118Mpe tokambaki bango mibale na nzela ya semba.
وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِمَا فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Open ayah 37:119Mpe nkombo ya bango mibale ezala bokanisi тропа basusu.
سَلَٰمٌ عَلَىٰ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ
Open ayah 37:120Kimia ezala likolo ya Mûssa na Háruna.
إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Open ayah 37:121Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi.
إِنَّهُمَا مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Open ayah 37:122Ya soló, bango mibale bazalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi.
وَإِنَّ إِلۡيَاسَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Open ayah 37:123Мре ya sólo IL’YÁS azalaki moko okati ya batindami.
إِذۡ قَالَ لِقَوۡمِهِۦٓ أَلَا تَتَّقُونَ
Open ayah 37:124Tango alobaki na bato naye: Boye bokobanga te?
أَتَدۡعُونَ بَعۡلٗا وَتَذَرُونَ أَحۡسَنَ ٱلۡخَٰلِقِينَ
Open ayah 37:125Boye bozali kokumisa ba’alan (nkombo ya ekeko), mpe botiki mokeli malamu?
ٱللَّهَ رَبَّكُمۡ وَرَبَّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Open ayah 37:126Allah nde Nkolo wa bino, mpe Nkolo ya bankoko ya bino ya kala.
فَكَذَّبُوهُ فَإِنَّهُمۡ لَمُحۡضَرُونَ
Open ayah 37:127Baboyaki kondimela ye, kasi bakomemama o kati ya etumbu.
إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Open ayah 37:128Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama.
وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Open ayah 37:129Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.
سَلَٰمٌ عَلَىٰٓ إِلۡ يَاسِينَ
Open ayah 37:130Kimia ezala likolo ya Il’yâsîn na balandi ye.
إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Open ayah 37:131Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi.
إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Open ayah 37:132Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi.
وَإِنَّ لُوطٗا لَّمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Open ayah 37:133Mpe ya sólo, Loth azalaki okati ya batindami.
إِذۡ نَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ
Open ayah 37:134Tango tolongisaki ye na libota lia ye mobimba.
إِلَّا عَجُوزٗا فِي ٱلۡغَٰبِرِينَ
Open ayah 37:135Longola sé mobange ya mwasi azalaki okati ya batikali.
ثُمَّ دَمَّرۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
Open ayah 37:136Sima tobebisaki basusu.
وَإِنَّكُمۡ لَتَمُرُّونَ عَلَيۡهِم مُّصۡبِحِينَ
Open ayah 37:137Ya soló, bino bozali koleka pembeni na bango na tongo (nzela ya mobembo).
وَبِٱلَّيۡلِۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
Open ayah 37:138Mpe kati na butu, boye bozali kokanisa te?
وَإِنَّ يُونُسَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Open ayah 37:139Mpe ya soló, Yûnus azalaki moko o kati ya batindami.
إِذۡ أَبَقَ إِلَى ٱلۡفُلۡكِ ٱلۡمَشۡحُونِ
Open ayah 37:140Tango akimaki akei komata na masuwa oyo etondaki mingi, (elingaki kozinda)
فَسَاهَمَ فَكَانَ مِنَ ٱلۡمُدۡحَضِينَ
Open ayah 37:141Mpe aponamaki été abwakama.
فَٱلۡتَقَمَهُ ٱلۡحُوتُ وَهُوَ مُلِيمٞ
Open ayah 37:142Mpe mbisi emelaki ye mpo été atikaki bato na ndingisa ya Allah te.
فَلَوۡلَآ أَنَّهُۥ كَانَ مِنَ ٱلۡمُسَبِّحِينَ
Open ayah 37:143Soki azalaki te moko o kati ya bakumisi Allah,
لَلَبِثَ فِي بَطۡنِهِۦٓ إِلَىٰ يَوۡمِ يُبۡعَثُونَ
Open ayah 37:144Mbele alingaki kotikala okati ya libumu lia ye (mbisi) kino o mokolo mwa lisekwa.
۞فَنَبَذۡنَٰهُ بِٱلۡعَرَآءِ وَهُوَ سَقِيمٞ
Open ayah 37:145Tobimisaki ye na mabele bolumbu mpe na nsoni.
وَأَنۢبَتۡنَا عَلَيۡهِ شَجَرَةٗ مِّن يَقۡطِينٖ
Open ayah 37:146Mpe tobotisaki matiti ya maboke likolo naye. (esika afandaki)
وَأَرۡسَلۡنَٰهُ إِلَىٰ مِاْئَةِ أَلۡفٍ أَوۡ يَزِيدُونَ
Open ayah 37:147Mpe na sima totindaki ye epai ya bato nkama nkoto to mpe ebele koleka.
فَـَٔامَنُواْ فَمَتَّعۡنَٰهُمۡ إِلَىٰ حِينٖ
Open ayah 37:148Mpe bandimaki, kasi topesaki bango bosepeli ya mwa ngonga ya moke.
فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَلِرَبِّكَ ٱلۡبَنَاتُ وَلَهُمُ ٱلۡبَنُونَ
Open ayah 37:149Tuna bango motuna, boye Nkolo wayo azalaka na bana basi mpe bango bazali na bana mibali?
أَمۡ خَلَقۡنَا ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ إِنَٰثٗا وَهُمۡ شَٰهِدُونَ
Open ayah 37:150То boye, tokelaki ba anzelu bazala basi mpe bango bazali kornona?
أَلَآ إِنَّهُم مِّنۡ إِفۡكِهِمۡ لَيَقُولُونَ
Open ayah 37:151Ya soló, bazali koloba sé na lokuta na bango.
وَلَدَ ٱللَّهُ وَإِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
Open ayah 37:152(Bazali koloba) ete: Allah abota, ya solo bazali na lokuta.
أَصۡطَفَى ٱلۡبَنَاتِ عَلَى ٱلۡبَنِينَ
Open ayah 37:153Boye akopona bana basi koleka bana mibali?
مَا لَكُمۡ كَيۡفَ تَحۡكُمُونَ
Open ayah 37:154Mpona nini bozali kokata likambo na lolenge wana?
أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
Open ayah 37:155Boye bozali kokanisa te?
أَمۡ لَكُمۡ سُلۡطَٰنٞ مُّبِينٞ
Open ayah 37:156То bozali na bilembetele bisusu bia polele?
فَأۡتُواْ بِكِتَٰبِكُمۡ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Open ayah 37:157Boya na buku na bino, soki bozali koloba bosôló.
وَجَعَلُواْ بَيۡنَهُۥ وَبَيۡنَ ٱلۡجِنَّةِ نَسَبٗاۚ وَلَقَدۡ عَلِمَتِ ٱلۡجِنَّةُ إِنَّهُمۡ لَمُحۡضَرُونَ
Open ayah 37:158Mpe bati bondeko kati naye na bilima, kasi bilima bayebi ete bazali (bapengwi) mpe ete bakomemama (na etumbu).
سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يَصِفُونَ
Open ayah 37:159Nkembo na Allah wa likolo, mpona maye bazali koloba,
إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Open ayah 37:160Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama.
فَإِنَّكُمۡ وَمَا تَعۡبُدُونَ
Open ayah 37:161Ya soló, bino na baye bozali kobondela.
مَآ أَنتُمۡ عَلَيۡهِ بِفَٰتِنِينَ
Open ayah 37:162Bozali na nguya ya kobungisa moto moko te.
إِلَّا مَنۡ هُوَ صَالِ ٱلۡجَحِيمِ
Open ayah 37:163Longola sé oyo akozikisama na moto.
وَمَا مِنَّآ إِلَّا لَهُۥ مَقَامٞ مَّعۡلُومٞ
Open ayah 37:164Moko te okati na biso, sé azali na esika eyebani.
وَإِنَّا لَنَحۡنُ ٱلصَّآفُّونَ
Open ayah 37:165Mpe ya soló, tozali komitelemisa na milongo.
وَإِنَّا لَنَحۡنُ ٱلۡمُسَبِّحُونَ
Open ayah 37:166Mpe ya soló, biso nde tozali kopesa lokumu (ya Allah).
وَإِن كَانُواْ لَيَقُولُونَ
Open ayah 37:167Ata soki bazalaki koloba.
لَوۡ أَنَّ عِندَنَا ذِكۡرٗا مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ
Open ayah 37:168Soki tokanisaka bato ya kala.
لَكُنَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Open ayah 37:169Tolingaki kozala bawumbu ya Allah baye baponama.
فَكَفَرُواْ بِهِۦۖ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ
Open ayah 37:170Bapengwaki na yango, kasi bakomonaka.
وَلَقَدۡ سَبَقَتۡ كَلِمَتُنَا لِعِبَادِنَا ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Open ayah 37:171Na yango, tosilaka kopesa liloba lia biso epai ya bawumbu na biso batindami.
إِنَّهُمۡ لَهُمُ ٱلۡمَنصُورُونَ
Open ayah 37:172Ya sólo, ezali bango nde bakosalisama.
وَإِنَّ جُندَنَا لَهُمُ ٱلۡغَٰلِبُونَ
Open ayah 37:173Mpe ya soló, basoda na biso nde bakolonga.
فَتَوَلَّ عَنۡهُمۡ حَتَّىٰ حِينٖ
Open ayah 37:174Mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye.
وَأَبۡصِرۡهُمۡ فَسَوۡفَ يُبۡصِرُونَ
Open ayah 37:175Мре tala bango, mosika te bakomona.
أَفَبِعَذَابِنَا يَسۡتَعۡجِلُونَ
Open ayah 37:176Nini boye bazali kowelisa etumbu na biso?
فَإِذَا نَزَلَ بِسَاحَتِهِمۡ فَسَآءَ صَبَاحُ ٱلۡمُنذَرِينَ
Open ayah 37:177Tango bakokweyaka na bisika bia bango, tango wana ekozala mabe тропа bango oyo basilaki kokebisama.
وَتَوَلَّ عَنۡهُمۡ حَتَّىٰ حِينٖ
Open ayah 37:178Mpe mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye.
وَأَبۡصِرۡ فَسَوۡفَ يُبۡصِرُونَ
Open ayah 37:179Mpe tala, kala mingi te bakomonaka.
سُبۡحَٰنَ رَبِّكَ رَبِّ ٱلۡعِزَّةِ عَمَّا يَصِفُونَ
Open ayah 37:180Nkembo ya Nkolo wayo, Nkolo ya nguya тропа maye bazali koloba.
وَسَلَٰمٌ عَلَى ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Open ayah 37:181Kimia ezala likolo lia batindami.
وَٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Open ayah 37:182Mpe lokumu ya Allah, Nkolo wa molongo mobimba.