الكهف

Al-Kahf

The Cave · Surah 18 · Ayahs: 110 · Meccan

Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

  1. ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِيٓ أَنزَلَ عَلَىٰ عَبۡدِهِ ٱلۡكِتَٰبَ وَلَمۡ يَجۡعَل لَّهُۥ عِوَجَاۜ

    Open ayah 18:1

    Matondi na Allah oyo akitisaki epai ya mowumbu waye buku, oyo ezali na mbilinga mbilinga kati na yango te. (ezali na bokeseni te).

  2. قَيِّمٗا لِّيُنذِرَ بَأۡسٗا شَدِيدٗا مِّن لَّدُنۡهُ وَيُبَشِّرَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ ٱلَّذِينَ يَعۡمَلُونَ ٱلصَّٰلِحَٰتِ أَنَّ لَهُمۡ أَجۡرًا حَسَنٗا

    Open ayah 18:2

    (Buku) ya semba тропа kokebisa na etumbu ya makasi kowuta epai naye, mpe kopesa sango malamu epai ya bandimi baye bazali kosala misala ya malamu ete: Ya soló, bakozala na lifuta ya kitoko.

  3. مَّٰكِثِينَ فِيهِ أَبَدٗا

    Open ayah 18:3

    Kuna, bakovanda libela kati na yango.

  4. وَيُنذِرَ ٱلَّذِينَ قَالُواْ ٱتَّخَذَ ٱللَّهُ وَلَدٗا

    Open ayah 18:4

    Мре kokebisa baye bazali koloba: Allah azali na mwana.

  5. مَّا لَهُم بِهِۦ مِنۡ عِلۡمٖ وَلَا لِأٓبَآئِهِمۡۚ كَبُرَتۡ كَلِمَةٗ تَخۡرُجُ مِنۡ أَفۡوَٰهِهِمۡۚ إِن يَقُولُونَ إِلَّا كَذِبٗا

    Open ayah 18:5

    Bazali na boyebi na yango te lolenge moko na batata na bango, liloba ya mabe ezali kobima na minoko mia bango. Manso bazali koloba ezali sé lokuta.

  6. فَلَعَلَّكَ بَٰخِعٞ نَّفۡسَكَ عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِمۡ إِن لَّمۡ يُؤۡمِنُواْ بِهَٰذَا ٱلۡحَدِيثِ أَسَفًا

    Open ayah 18:6

    Ozali komitungisama na mpasi ete baboyi kondima na lisolo oyo.

  7. إِنَّا جَعَلۡنَا مَا عَلَى ٱلۡأَرۡضِ زِينَةٗ لَّهَا لِنَبۡلُوَهُمۡ أَيُّهُمۡ أَحۡسَنُ عَمَلٗا

    Open ayah 18:7

    Ya soló, maye mazuami o likolo ya mabele, totiyaki yango ezala na bonzenga na yango mpo été ezala bomekami epai ya bato mpe totala nani kati na bango akosala bolamu.

  8. وَإِنَّا لَجَٰعِلُونَ مَا عَلَيۡهَا صَعِيدٗا جُرُزًا

    Open ayah 18:8

    Mpe ya sólo, na sima tokobalola yango mpe ekomi makasi, etikali polele ezali na eloko te (mabele oyo ezali na milona te).

  9. أَمۡ حَسِبۡتَ أَنَّ أَصۡحَٰبَ ٱلۡكَهۡفِ وَٱلرَّقِيمِ كَانُواْ مِنۡ ءَايَٰتِنَا عَجَبًا

    Open ayah 18:9

    Okanisi ete bato ya kati ya mobengá na bato ya ar-raqím[1] bazalaki kati ya bilembo na biso ya kokamwa?

    1. Ar-raqïm: Eloko ya makomami.
  10. إِذۡ أَوَى ٱلۡفِتۡيَةُ إِلَى ٱلۡكَهۡفِ فَقَالُواْ رَبَّنَآ ءَاتِنَا مِن لَّدُنكَ رَحۡمَةٗ وَهَيِّئۡ لَنَا مِنۡ أَمۡرِنَا رَشَدٗا 

    Open ayah 18:10

    Tango bilenge babatamaki o kati ya mobéngá balobaki été; Oh Nkolo wa biso! Zipa biso na ngolu nayo, mpe sembola biso na makambo na biso nyoso.

  11. فَضَرَبۡنَا عَلَىٰٓ ءَاذَانِهِمۡ فِي ٱلۡكَهۡفِ سِنِينَ عَدَدٗا

    Open ayah 18:11

    Mpe tokangaki matoyi na bango mibu miyike okati ya mobengá.

  12. ثُمَّ بَعَثۡنَٰهُمۡ لِنَعۡلَمَ أَيُّ ٱلۡحِزۡبَيۡنِ أَحۡصَىٰ لِمَا لَبِثُوٓاْ أَمَدٗا

    Open ayah 18:12

    Sima, tosekwisaki bango mpo toyeba lisanga nini kati na bango mibale bayebi motango ya mibu miye basalaki wana.

  13. نَّحۡنُ نَقُصُّ عَلَيۡكَ نَبَأَهُم بِٱلۡحَقِّۚ إِنَّهُمۡ فِتۡيَةٌ ءَامَنُواْ بِرَبِّهِمۡ وَزِدۡنَٰهُمۡ هُدٗى

    Open ayah 18:13

    Tozali kobetela yo sango na bango na bosóló. Bazalaki bilenge baye bandimaki na Nkolo wa bango mpe tobakiselaki bango bokambami.

  14. وَرَبَطۡنَا عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ إِذۡ قَامُواْ فَقَالُواْ رَبُّنَا رَبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ لَن نَّدۡعُوَاْ مِن دُونِهِۦٓ إِلَٰهٗاۖ لَّقَدۡ قُلۡنَآ إِذٗا شَطَطًا

    Open ayah 18:14

    Мре tolendisa mitema mia bango, tango batelemaki mpe balobaki: Nkolo wa biso nde Nkolo wa likolo na mabele, tokobelela banzambe basusu te na esika naye, soki te tokoloba mabe mpenza.

  15. هَٰٓؤُلَآءِ قَوۡمُنَا ٱتَّخَذُواْ مِن دُونِهِۦٓ ءَالِهَةٗۖ لَّوۡلَا يَأۡتُونَ عَلَيۡهِم بِسُلۡطَٰنِۭ بَيِّنٖۖ فَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗا

    Open ayah 18:15

    Tala bato na biso oyo bazui banzambe misusu na botiki ye, pona nini te bazali komema elembetele ya polele nani azali moto mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta?

  16. وَإِذِ ٱعۡتَزَلۡتُمُوهُمۡ وَمَا يَعۡبُدُونَ إِلَّا ٱللَّهَ فَأۡوُۥٓاْ إِلَى ٱلۡكَهۡفِ يَنشُرۡ لَكُمۡ رَبُّكُم مِّن رَّحۡمَتِهِۦ وَيُهَيِّئۡ لَكُم مِّنۡ أَمۡرِكُم مِّرۡفَقٗا

    Open ayah 18:16

    Mpe tango bokokabwana na bango na maye bazali kobondela na esika ya Allah, bokota o kati ya mobengá тропа komibatela, Nkolo wa bino akokitisela bino ngolu naye mpe akobongisa makambo na bino.

  17. ۞وَتَرَى ٱلشَّمۡسَ إِذَا طَلَعَت تَّزَٰوَرُ عَن كَهۡفِهِمۡ ذَاتَ ٱلۡيَمِينِ وَإِذَا غَرَبَت تَّقۡرِضُهُمۡ ذَاتَ ٱلشِّمَالِ وَهُمۡ فِي فَجۡوَةٖ مِّنۡهُۚ ذَٰلِكَ مِنۡ ءَايَٰتِ ٱللَّهِۗ مَن يَهۡدِ ٱللَّهُ فَهُوَ ٱلۡمُهۡتَدِۖ وَمَن يُضۡلِلۡ فَلَن تَجِدَ لَهُۥ وَلِيّٗا مُّرۡشِدٗا

    Open ayah 18:17

    Mpe okomona moyi ebimi ezali komata etiki Mobengá na bango na loboko ya mobali, mpe soki ekomi kokita ezali kotika mobengá na loboko ya mwasi, mpe bango bafandi malamu na kati na kimia, wana ezali moko ya bikamwisi ya Allah, moto oyo Allah akambi ye nde akambemi malamu, mpe oyo asili kobunga, okoki te kozuela ye mokambi.

  18. وَتَحۡسَبُهُمۡ أَيۡقَاظٗا وَهُمۡ رُقُودٞۚ وَنُقَلِّبُهُمۡ ذَاتَ ٱلۡيَمِينِ وَذَاتَ ٱلشِّمَالِۖ وَكَلۡبُهُم بَٰسِطٞ ذِرَاعَيۡهِ بِٱلۡوَصِيدِۚ لَوِ ٱطَّلَعۡتَ عَلَيۡهِمۡ لَوَلَّيۡتَ مِنۡهُمۡ فِرَارٗا وَلَمُلِئۡتَ مِنۡهُمۡ رُعۡبٗا

    Open ayah 18:18

    Mpe okokanisa bazali ya kolamuka nzoka nde basilaki kolala. Mpe tozali kobalola bango na ngambo ya mobali mpe na ngambu ya mwasi, mpe mbwa na bango atandaki maboko naye na ekoteli ya mobengâ, soki okutanaki na bango olingaki kopesa mokongo na kokima na kobanga.

  19. وَكَذَٰلِكَ بَعَثۡنَٰهُمۡ لِيَتَسَآءَلُواْ بَيۡنَهُمۡۚ قَالَ قَآئِلٞ مِّنۡهُمۡ كَمۡ لَبِثۡتُمۡۖ قَالُواْ لَبِثۡنَا يَوۡمًا أَوۡ بَعۡضَ يَوۡمٖۚ قَالُواْ رَبُّكُمۡ أَعۡلَمُ بِمَا لَبِثۡتُمۡ فَٱبۡعَثُوٓاْ أَحَدَكُم بِوَرِقِكُمۡ هَٰذِهِۦٓ إِلَى ٱلۡمَدِينَةِ فَلۡيَنظُرۡ أَيُّهَآ أَزۡكَىٰ طَعَامٗا فَلۡيَأۡتِكُم بِرِزۡقٖ مِّنۡهُ وَلۡيَتَلَطَّفۡ وَلَا يُشۡعِرَنَّ بِكُمۡ أَحَدًا

    Open ayah 18:19

    Mpe ndenge wana nde tosekwisaki bango bazali kotunana bango na bango, moko kati na bango atunaki: Bovandi ngonga boni wana? Banzongisi: Tovandi mokolo to ndambu ya mokolo. Basusu bakolobaka: Nkolo wa bino ayebi malamu (boni) boyandaki, botinda moko wa bino na misolo mia bino na mboka, mpo atala biloko nini bia malamu ayela bino yango boliya, mpe asala na ndenge été bato bayeba bino te.

  20. إِنَّهُمۡ إِن يَظۡهَرُواْ عَلَيۡكُمۡ يَرۡجُمُوكُمۡ أَوۡ يُعِيدُوكُمۡ فِي مِلَّتِهِمۡ وَلَن تُفۡلِحُوٓاْ إِذًا أَبَدٗا 

    Open ayah 18:20

    Ya soló, bango soki bazuaka bino, balingaki koboma bino na mabanga to balingaki kozongisa bino na lingomba lia bango, тре bolingaki kolonga te.

  21. وَكَذَٰلِكَ أَعۡثَرۡنَا عَلَيۡهِمۡ لِيَعۡلَمُوٓاْ أَنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞ وَأَنَّ ٱلسَّاعَةَ لَا رَيۡبَ فِيهَآ إِذۡ يَتَنَٰزَعُونَ بَيۡنَهُمۡ أَمۡرَهُمۡۖ فَقَالُواْ ٱبۡنُواْ عَلَيۡهِم بُنۡيَٰنٗاۖ رَّبُّهُمۡ أَعۡلَمُ بِهِمۡۚ قَالَ ٱلَّذِينَ غَلَبُواْ عَلَىٰٓ أَمۡرِهِمۡ لَنَتَّخِذَنَّ عَلَيۡهِم مَّسۡجِدٗا

    Open ayah 18:21

    Mpe ndenge wana tobimisaki makambo na bango polele epai na bato mpo bayeba été elaka ya Allah ezali ya solo, mpe été mokolo ya suka ezali na tembe te kati na yango, tango bato ya mboka bazalaki kosuana тропа likambo na bango (bilenge baye bazalaki kati ya mobengâ), mpe balobaki: Botonga likolo na bango ndako ya monene, Nkolo wa bango ayebi bango malamu koleka, kasi ba oyo balongaki kati na kosuana wana balobi tokotonga likolo na bango esika ya kosambela. (masdjid)

  22. سَيَقُولُونَ ثَلَٰثَةٞ رَّابِعُهُمۡ كَلۡبُهُمۡ وَيَقُولُونَ خَمۡسَةٞ سَادِسُهُمۡ كَلۡبُهُمۡ رَجۡمَۢا بِٱلۡغَيۡبِۖ وَيَقُولُونَ سَبۡعَةٞ وَثَامِنُهُمۡ كَلۡبُهُمۡۚ قُل رَّبِّيٓ أَعۡلَمُ بِعِدَّتِهِم مَّا يَعۡلَمُهُمۡ إِلَّا قَلِيلٞۗ فَلَا تُمَارِ فِيهِمۡ إِلَّا مِرَآءٗ ظَٰهِرٗا وَلَا تَسۡتَفۡتِ فِيهِم مِّنۡهُمۡ أَحَدٗا

    Open ayah 18:22

    Mpe bazalaki koloba été; bazali misato na mbwa na bango minei, mpe bazalaki koloba na bokeseni na kobombama kati na bango ete: Bazalaki (bilenge) mitano na mbwa na bango motoba, mpe bazalaki koloba lisusu été; bazali sambo na mbwa na bango mwambe; loba: Nkolo wa ngai ayebi koleka malamu motango mwa bango, sé moke nde baye bayebi yango, kasi kosuana na bato te тропа likambo yango, sé oyo ezali котопапа polele, mpe kotuna bato te тропа bozindo na yango.

  23. وَلَا تَقُولَنَّ لِشَاْيۡءٍ إِنِّي فَاعِلٞ ذَٰلِكَ غَدًا

    Open ayah 18:23

    Mpe koloba te тропа eloko ete: Ngai nakosala yango lobi.

  24. إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُۚ وَٱذۡكُر رَّبَّكَ إِذَا نَسِيتَ وَقُلۡ عَسَىٰٓ أَن يَهۡدِيَنِ رَبِّي لِأَقۡرَبَ مِنۡ هَٰذَا رَشَدٗا

    Open ayah 18:24

    (Kasi okoloba nde été:) soki Allah alingi, na sima okanisa Nkolo wayo soki obosanaki mpe oloba ete: Nazali kolikia été Nkolo na ngai akamba ngai mpe atia ngai penepene na oyo ezali ya bosóló.

  25. وَلَبِثُواْ فِي كَهۡفِهِمۡ ثَلَٰثَ مِاْئَةٖ سِنِينَ وَٱزۡدَادُواْ تِسۡعٗا

    Open ayah 18:25

    Мре bawumelaki па kati ya mobengâ wana mibu nkama misato mpe babakisaki libua.

  26. قُلِ ٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا لَبِثُواْۖ لَهُۥ غَيۡبُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ أَبۡصِرۡ بِهِۦ وَأَسۡمِعۡۚ مَا لَهُم مِّن دُونِهِۦ مِن وَلِيّٖ وَلَا يُشۡرِكُ فِي حُكۡمِهِۦٓ أَحَدٗا

    Open ayah 18:26

    Loba: Allah ayebi malamu boni bawumelaki wana, ayebi mabombami ma likolo na ya nsé, lokola amonaka yango mpe ayokaka. Bazali na (mosungi) mosusu te sé ye, mpe azali na mosangisi te na motindo mwa ye.

  27. وَٱتۡلُ مَآ أُوحِيَ إِلَيۡكَ مِن كِتَابِ رَبِّكَۖ لَا مُبَدِّلَ لِكَلِمَٰتِهِۦ وَلَن تَجِدَ مِن دُونِهِۦ مُلۡتَحَدٗا

    Open ayah 18:27

    Mpe tanga maye makiteli yo okati ya buku ya Nkolo nayo, eloko moko te ekoki kobalola liloba lia ye, mpe okozua esika mosusu ya kokimela te sé epai naye.

  28. وَٱصۡبِرۡ نَفۡسَكَ مَعَ ٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ رَبَّهُم بِٱلۡغَدَوٰةِ وَٱلۡعَشِيِّ يُرِيدُونَ وَجۡهَهُۥۖ وَلَا تَعۡدُ عَيۡنَاكَ عَنۡهُمۡ تُرِيدُ زِينَةَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ وَلَا تُطِعۡ مَنۡ أَغۡفَلۡنَا قَلۡبَهُۥ عَن ذِكۡرِنَا وَٱتَّبَعَ هَوَىٰهُ وَكَانَ أَمۡرُهُۥ فُرُطٗا

    Open ayah 18:28

    Mpe kanga motema elongo na baye bazali kobondela Nkolo wa bango tongo mpe pokwa, balingi (kornona) elongi naye, kasi kolongola miso likolo na bango te, тропа (koluka) bonzenga na bomoyi ya nsé, mpe kotosa te oyo motema naye esila kobosana liteya na biso mpe azali kolanda bamposa naye ya nzoto, mpe ezaleli naye ezali mabe.

  29. وَقُلِ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّكُمۡۖ فَمَن شَآءَ فَلۡيُؤۡمِن وَمَن شَآءَ فَلۡيَكۡفُرۡۚ إِنَّآ أَعۡتَدۡنَا لِلظَّٰلِمِينَ نَارًا أَحَاطَ بِهِمۡ سُرَادِقُهَاۚ وَإِن يَسۡتَغِيثُواْ يُغَاثُواْ بِمَآءٖ كَٱلۡمُهۡلِ يَشۡوِي ٱلۡوُجُوهَۚ بِئۡسَ ٱلشَّرَابُ وَسَآءَتۡ مُرۡتَفَقًا

    Open ayah 18:29

    Mpe loba: Bosembo ezali nde epai ya Nkolo wa bino, oyo akolinga andimi na yango, oyo mpe akoboya apengui na yango. Ya soló, tosili kolengele тропа babubi moto oyo ekozinga bango na kopela, mpe soki basengi mayi ya komela, bakomelisa bango mayi ya mabende mayanguami na moto, ezali kozikisa bilongi na bango. Oyo mayi ya mabe ya komela mpe efandele ya mabe!

  30. إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ إِنَّا لَا نُضِيعُ أَجۡرَ مَنۡ أَحۡسَنَ عَمَلًا 

    Open ayah 18:30

    Soló, тропа baye bandimaki mpe basalaki bolamu, ya solo penza tokobungisaka te lifuta lia oyo asalaki bolamu.

  31. أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ جَنَّٰتُ عَدۡنٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهِمُ ٱلۡأَنۡهَٰرُ يُحَلَّوۡنَ فِيهَا مِنۡ أَسَاوِرَ مِن ذَهَبٖ وَيَلۡبَسُونَ ثِيَابًا خُضۡرٗا مِّن سُندُسٖ وَإِسۡتَبۡرَقٖ مُّتَّكِـِٔينَ فِيهَا عَلَى ٱلۡأَرَآئِكِۚ نِعۡمَ ٱلثَّوَابُ وَحَسُنَتۡ مُرۡتَفَقٗا

    Open ayah 18:31

    Bango nde bakozalaka na elanga ya (lola) ya edeni libela biye bizali kolekisa o nsé na bango mingala, bakolata bawolo na maboko na bango mpe bakolata bilamba bia fafala ya langi ya mayi ya pondu, mpe bakofanda likolo ya kiti ya kitoko, oyo lifuta ya malamu mpe esika ya kitoko ya kofanda!

  32. ۞وَٱضۡرِبۡ لَهُم مَّثَلٗا رَّجُلَيۡنِ جَعَلۡنَا لِأَحَدِهِمَا جَنَّتَيۡنِ مِنۡ أَعۡنَٰبٖ وَحَفَفۡنَٰهُمَا بِنَخۡلٖ وَجَعَلۡنَا بَيۡنَهُمَا زَرۡعٗا

    Open ayah 18:32

    Pesa bango ndakisa ya bato mibale, moko na bango to pesaki ye bilanga mibale ya Ânâb[1] mpe tozingaki yango na banzete ya Nagh’l,[2] mpe totiaki kati kati ya bilanga mibale wana milona.

  33. كِلۡتَا ٱلۡجَنَّتَيۡنِ ءَاتَتۡ أُكُلَهَا وَلَمۡ تَظۡلِم مِّنۡهُ شَيۡـٔٗاۚ وَفَجَّرۡنَا خِلَٰلَهُمَا نَهَرٗا

    Open ayah 18:33

    Bilanga binso mibale bizali kobota malamu, na bozangi eloko te mpe tobimisaki miluka kati kati na yango.

  34. وَكَانَ لَهُۥ ثَمَرٞ فَقَالَ لِصَٰحِبِهِۦ وَهُوَ يُحَاوِرُهُۥٓ أَنَا۠ أَكۡثَرُ مِنكَ مَالٗا وَأَعَزُّ نَفَرٗا

    Open ayah 18:34

    Mpe bizalaki na bambuma, alobi na moninga waye: Naleki yo na bomengo mingi, mpe nazali na makasi koleka yo, mpo nazali na bato ebele.

  35. وَدَخَلَ جَنَّتَهُۥ وَهُوَ ظَالِمٞ لِّنَفۡسِهِۦ قَالَ مَآ أَظُنُّ أَن تَبِيدَ هَٰذِهِۦٓ أَبَدٗا

    Open ayah 18:35

    Мре akotaki na bilanga bia ye na komibuba ye moko, alobi: Nayebi ete oyo ekoki kobeba te.

  36. وَمَآ أَظُنُّ ٱلسَّاعَةَ قَآئِمَةٗ وَلَئِن رُّدِدتُّ إِلَىٰ رَبِّي لَأَجِدَنَّ خَيۡرٗا مِّنۡهَا مُنقَلَبٗا

    Open ayah 18:36

    Mpe nandimi te ete mokolo ya suka ekoya, mpe soki bazongisi ngai epai ya Nkolo wa ngai, nakokuta ya kitoko koleka (bilanga) oyo.

  37. قَالَ لَهُۥ صَاحِبُهُۥ وَهُوَ يُحَاوِرُهُۥٓ أَكَفَرۡتَ بِٱلَّذِي خَلَقَكَ مِن تُرَابٖ ثُمَّ مِن نُّطۡفَةٖ ثُمَّ سَوَّىٰكَ رَجُلٗا

    Open ayah 18:37

    (Moninga waye ayebisi ye): Okopengwa na oyo akelaki yo na mabele, sima na mayi ya mokongo sima abimisi yo moto?

  38. لَّٰكِنَّا۠ هُوَ ٱللَّهُ رَبِّي وَلَآ أُشۡرِكُ بِرَبِّيٓ أَحَدٗا

    Open ayah 18:38

    Kasi тропа ngai; Allah azali Nkolo wa ngai, nakosangisa Nkolo wa ngai na eloko te.

  39. وَلَوۡلَآ إِذۡ دَخَلۡتَ جَنَّتَكَ قُلۡتَ مَا شَآءَ ٱللَّهُ لَا قُوَّةَ إِلَّا بِٱللَّهِۚ إِن تَرَنِ أَنَا۠ أَقَلَّ مِنكَ مَالٗا وَوَلَدٗا

    Open ayah 18:39

    Tango okotaki na elanga nayo, soki olobaki été: Oyo bolingo ya Allah, nguya ezali te, makasi mpe ezali te sé epai ya Allah. Soki ozali kornona été: Nazali na bozui токе mpe bana ebele te.

  40. فَعَسَىٰ رَبِّيٓ أَن يُؤۡتِيَنِ خَيۡرٗا مِّن جَنَّتِكَ وَيُرۡسِلَ عَلَيۡهَا حُسۡبَانٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ فَتُصۡبِحَ صَعِيدٗا زَلَقًا 

    Open ayah 18:40

    Ekoki kozala ete Nkolo wa ngai, kala te akoki kopesa ngai ya malamu koleka bilanga bia yo, mpe akoki kotindela yango (bilanga nayo) etumbu kowuta o likolo mpe ekomi mabele mpe putulu.

  41. أَوۡ يُصۡبِحَ مَآؤُهَا غَوۡرٗا فَلَن تَسۡتَطِيعَ لَهُۥ طَلَبٗا

    Open ayah 18:41

    То mayi та yango makokauka mpe okokuta yango te.

  42. وَأُحِيطَ بِثَمَرِهِۦ فَأَصۡبَحَ يُقَلِّبُ كَفَّيۡهِ عَلَىٰ مَآ أَنفَقَ فِيهَا وَهِيَ خَاوِيَةٌ عَلَىٰ عُرُوشِهَا وَيَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي لَمۡ أُشۡرِكۡ بِرَبِّيٓ أَحَدٗا

    Open ayah 18:42

    Мре milona mia ye mibebisami o bisika binso тре акотакі kobukabuka maboko naye na ntina na oyo abimisaki тропа bilanga oyo, тре nyoso ebebisami, тре alobi: Eh ngai! Mawa na ngai soki nasangisaki Nkolo wa ngai na eloko te.

  43. وَلَمۡ تَكُن لَّهُۥ فِئَةٞ يَنصُرُونَهُۥ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَمَا كَانَ مُنتَصِرًا

    Open ayah 18:43

    Azuaki ata bato ya kobikisa ye na (etumbu) ya Allah te, mpe ye moko akokaki komibikisa te.

  44. هُنَالِكَ ٱلۡوَلَٰيَةُ لِلَّهِ ٱلۡحَقِّۚ هُوَ خَيۡرٞ ثَوَابٗا وَخَيۡرٌ عُقۡبٗا

    Open ayah 18:44

    Ebateli ya soló sólo ezali nde ya Allah. Apesaka mbano ya malamu mpe suka ya malamu.

  45. وَٱضۡرِبۡ لَهُم مَّثَلَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا كَمَآءٍ أَنزَلۡنَٰهُ مِنَ ٱلسَّمَآءِ فَٱخۡتَلَطَ بِهِۦ نَبَاتُ ٱلۡأَرۡضِ فَأَصۡبَحَ هَشِيمٗا تَذۡرُوهُ ٱلرِّيَٰحُۗ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ مُّقۡتَدِرًا

    Open ayah 18:45

    Mpe betela bango ndakisa ya bomoyi bwa mokili, ezali lokola mayi maye tozali kokitisa kowuta o likolo, mpe esangani na milona mia mabele, mpe ekomi matiti ya motawu, mopepe ekaboli yango, mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.

  46. ٱلۡمَالُ وَٱلۡبَنُونَ زِينَةُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ وَٱلۡبَٰقِيَٰتُ ٱلصَّٰلِحَٰتُ خَيۡرٌ عِندَ رَبِّكَ ثَوَابٗا وَخَيۡرٌ أَمَلٗا

    Open ayah 18:46

    Bomengo mpe bana, ezali bisengo ya nsé, kasi misala ya malamu miye misilaka te, yango nde ezali na lifuta ya malamu mpe elikia ya kitoko epayi ya Nkolo nayo.

  47. وَيَوۡمَ نُسَيِّرُ ٱلۡجِبَالَ وَتَرَى ٱلۡأَرۡضَ بَارِزَةٗ وَحَشَرۡنَٰهُمۡ فَلَمۡ نُغَادِرۡ مِنۡهُمۡ أَحَدٗا

    Open ayah 18:47

    Mpe mokolo moye tokotambwisaka bangomba, okomona mabele ekotandama polele, mpe tokosangisa bango mpe tokobosana moko te.

  48. وَعُرِضُواْ عَلَىٰ رَبِّكَ صَفّٗا لَّقَدۡ جِئۡتُمُونَا كَمَا خَلَقۡنَٰكُمۡ أَوَّلَ مَرَّةِۭۚ بَلۡ زَعَمۡتُمۡ أَلَّن نَّجۡعَلَ لَكُم مَّوۡعِدٗا

    Open ayah 18:48

    Мре bakotelemaka molongo liboso lia Nkolo wayo, boyeli biso lolenge tokelaki bino mbala ya yambo, kasi bokanisaki ete tokokokisela bino elaka te?

  49. وَوُضِعَ ٱلۡكِتَٰبُ فَتَرَى ٱلۡمُجۡرِمِينَ مُشۡفِقِينَ مِمَّا فِيهِ وَيَقُولُونَ يَٰوَيۡلَتَنَا مَالِ هَٰذَا ٱلۡكِتَٰبِ لَا يُغَادِرُ صَغِيرَةٗ وَلَا كَبِيرَةً إِلَّآ أَحۡصَىٰهَاۚ وَوَجَدُواْ مَا عَمِلُواْ حَاضِرٗاۗ وَلَا يَظۡلِمُ رَبُّكَ أَحَدٗا

    Open ayah 18:49

    Mpe bakotiyaka buku (ya moto na moto) mpe okomona batomboki bazali kobanga maye makomami na kati, mpe bakolobaka: Mabe na biso, buku eye etikaki eloko te, ezala moke to ya monene sé ekomaki yango. Mpe bakokutaka maye basalaki polele, kasi Nkolo wayo abubaka moto te.

  50. وَإِذۡ قُلۡنَا لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ ٱسۡجُدُواْ لِأٓدَمَ فَسَجَدُوٓاْ إِلَّآ إِبۡلِيسَ كَانَ مِنَ ٱلۡجِنِّ فَفَسَقَ عَنۡ أَمۡرِ رَبِّهِۦٓۗ أَفَتَتَّخِذُونَهُۥ وَذُرِّيَّتَهُۥٓ أَوۡلِيَآءَ مِن دُونِي وَهُمۡ لَكُمۡ عَدُوُّۢۚ بِئۡسَ لِلظَّٰلِمِينَ بَدَلٗا 

    Open ayah 18:50

    Mpe tango tolobaki na ba anzelu ete: Bogumbamela Adam, bagumbamaki, longola sé satana azalaki kati ya ba djini mpe aboyaki kotosa mobeko mwa Nkolo wa ye. Boye bokozua ye na libota lia ye mpo bazala babateli na botiki ngai mpe bazali banguna ya bino? Oyo коропа ya mabe тропа babubi!

  51. ۞مَّآ أَشۡهَدتُّهُمۡ خَلۡقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَلَا خَلۡقَ أَنفُسِهِمۡ وَمَا كُنتُ مُتَّخِذَ ٱلۡمُضِلِّينَ عَضُدٗا

    Open ayah 18:51

    Nazuaki bango te banzeneneke na bokeli mapata na mabele, ndenge moko kokelama na bango, mpe na koki te kozua babungisi тропа kosalisa nga.

  52. وَيَوۡمَ يَقُولُ نَادُواْ شُرَكَآءِيَ ٱلَّذِينَ زَعَمۡتُمۡ فَدَعَوۡهُمۡ فَلَمۡ يَسۡتَجِيبُواْ لَهُمۡ وَجَعَلۡنَا بَيۡنَهُم مَّوۡبِقٗا

    Open ayah 18:52

    Mpe o mokolo moye akolobaka: Bobenga basangani na ngai baye bolikiaki, bakobengaka bango kasi bakoyanolaka bango te, mpe tokotiyaka kati kati na bango libulu lia bobungisi.

  53. وَرَءَا ٱلۡمُجۡرِمُونَ ٱلنَّارَ فَظَنُّوٓاْ أَنَّهُم مُّوَاقِعُوهَا وَلَمۡ يَجِدُواْ عَنۡهَا مَصۡرِفٗا

    Open ayah 18:53

    Mpe batomboki bakomonaka moto, mpe bakondimaka ete bakokweya na yango, kasi bakozuaka esika ya bokimi te.

  54. وَلَقَدۡ صَرَّفۡنَا فِي هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ لِلنَّاسِ مِن كُلِّ مَثَلٖۚ وَكَانَ ٱلۡإِنسَٰنُ أَكۡثَرَ شَيۡءٖ جَدَلٗا

    Open ayah 18:54

    Mpe ya soló, tosilaki kolimbola na kati ya kurani eye bandakisa ya ndenge na ndenge тропа bato, kasi moto aleki sé kotia tembe.

  55. وَمَا مَنَعَ ٱلنَّاسَ أَن يُؤۡمِنُوٓاْ إِذۡ جَآءَهُمُ ٱلۡهُدَىٰ وَيَسۡتَغۡفِرُواْ رَبَّهُمۡ إِلَّآ أَن تَأۡتِيَهُمۡ سُنَّةُ ٱلۡأَوَّلِينَ أَوۡ يَأۡتِيَهُمُ ٱلۡعَذَابُ قُبُلٗا

    Open ayah 18:55

    Kasi nini epekisaki bato bandima, tango bokambi[1] boyelaki bango, mpe basenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bango? Sé oyo ekomelaki bankoko ba bango eyeli mpe bango, to etumbu ya lolenge nyoso eyela bango?

    1. Bokambi: Ezali ntoma Muhammad to Kurani.
  56. وَمَا نُرۡسِلُ ٱلۡمُرۡسَلِينَ إِلَّا مُبَشِّرِينَ وَمُنذِرِينَۚ وَيُجَٰدِلُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِٱلۡبَٰطِلِ لِيُدۡحِضُواْ بِهِ ٱلۡحَقَّۖ وَٱتَّخَذُوٓاْ ءَايَٰتِي وَمَآ أُنذِرُواْ هُزُوٗا

    Open ayah 18:56

    Mpe totindaka batindami sé тропа bopesi sango malamu mpe bokebisi. Kasi baye bapengwa bazali kosuanisa bosembo na lokuta na bango, тропа kobebisa. Mpe bazuaki mikapo mia ngai na maye bakebisamaki na yango na litio.

  57. وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّن ذُكِّرَ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِۦ فَأَعۡرَضَ عَنۡهَا وَنَسِيَ مَا قَدَّمَتۡ يَدَاهُۚ إِنَّا جَعَلۡنَا عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ أَكِنَّةً أَن يَفۡقَهُوهُ وَفِيٓ ءَاذَانِهِمۡ وَقۡرٗاۖ وَإِن تَدۡعُهُمۡ إِلَى ٱلۡهُدَىٰ فَلَن يَهۡتَدُوٓاْ إِذًا أَبَدٗا

    Open ayah 18:57

    Nani azali moto mabe koleka oyo apesi mokongo na bilembo bia Nkolo waye tango bazali koteya ye yango,, mpe abosani maye maboko (mibale) naye masalaki? Tozipi mitema mia bango ete basosola te, (bayeba kososolo kurani te) mpe matoyi na bango makangami, тре soki obengi bango na bokambami, bakokambama soki токе te.

  58. وَرَبُّكَ ٱلۡغَفُورُ ذُو ٱلرَّحۡمَةِۖ لَوۡ يُؤَاخِذُهُم بِمَا كَسَبُواْ لَعَجَّلَ لَهُمُ ٱلۡعَذَابَۚ بَل لَّهُم مَّوۡعِدٞ لَّن يَجِدُواْ مِن دُونِهِۦ مَوۡئِلٗا

    Open ayah 18:58

    Мре Nkolo wayo azali molimbisi atonda mawa, soki alingi kozua bango na maye basalaki akoyela bango etumbu noki, mpe bazali na elaka asilaki kotiela bango oyo soki ekoki, bakozua esika ya kokimela te.

  59. وَتِلۡكَ ٱلۡقُرَىٰٓ أَهۡلَكۡنَٰهُمۡ لَمَّا ظَلَمُواْ وَجَعَلۡنَا لِمَهۡلِكِهِم مَّوۡعِدٗا

    Open ayah 18:59

    Mpe wana nde bamboka eye tobomaki tango bato ba yango babubaki, mpe tosilaki kopesa elaka ya bobebisami na bango.

  60. وَإِذۡ قَالَ مُوسَىٰ لِفَتَىٰهُ لَآ أَبۡرَحُ حَتَّىٰٓ أَبۡلُغَ مَجۡمَعَ ٱلۡبَحۡرَيۡنِ أَوۡ أَمۡضِيَ حُقُبٗا 

    Open ayah 18:60

    (Kanisa) tango Mûssa alobaki na mosali waye ete: Nakotelema te kino nakoma na esika bibale mibale bikutani, to natambola mibu miyike.

  61. فَلَمَّا بَلَغَا مَجۡمَعَ بَيۡنِهِمَا نَسِيَا حُوتَهُمَا فَٱتَّخَذَ سَبِيلَهُۥ فِي ٱلۡبَحۡرِ سَرَبٗا

    Open ayah 18:61

    Mpe tango bakomaki wana, babosanaki mbisi na bango, oyo alandaki nzela naye kati na ebale.

  62. فَلَمَّا جَاوَزَا قَالَ لِفَتَىٰهُ ءَاتِنَا غَدَآءَنَا لَقَدۡ لَقِينَا مِن سَفَرِنَا هَٰذَا نَصَبٗا

    Open ayah 18:62

    Mpe tango bango banso babale baleki (esika) ena, alobi na mosali waye: Yela biso biloko bia biso ya kolia, tosili kolembe na mobembo mwa biso moye.

  63. قَالَ أَرَءَيۡتَ إِذۡ أَوَيۡنَآ إِلَى ٱلصَّخۡرَةِ فَإِنِّي نَسِيتُ ٱلۡحُوتَ وَمَآ أَنسَىٰنِيهُ إِلَّا ٱلشَّيۡطَٰنُ أَنۡ أَذۡكُرَهُۥۚ وَٱتَّخَذَ سَبِيلَهُۥ فِي ٱلۡبَحۡرِ عَجَبٗا

    Open ayah 18:63

    (Elenge wa ye) alobaki: Omoni tango tofandaki pene ya libanga ya monene nabosanaki mbisi kuna, satana nde abosanisi ngai mpo nakanisa yango te, mpe (Mûssa) azongaki sima тропа kolanda nzela ya ebale na kokamwa.

  64. قَالَ ذَٰلِكَ مَا كُنَّا نَبۡغِۚ فَٱرۡتَدَّا عَلَىٰٓ ءَاثَارِهِمَا قَصَصٗا

    Open ayah 18:64

    (Mûssa) alobi: Wana nde oyo tozalaki koluka, mpe babongoli makolo ma bango balandi bilembo bia yango bazali kosolola.

  65. فَوَجَدَا عَبۡدٗا مِّنۡ عِبَادِنَآ ءَاتَيۡنَٰهُ رَحۡمَةٗ مِّنۡ عِندِنَا وَعَلَّمۡنَٰهُ مِن لَّدُنَّا عِلۡمٗا

    Open ayah 18:65

    Mpe bakutaki mowumbu wa biso, oyo topesaki ye ngolu ma biso, mpe totangisaki ye boyebi bonene.

  66. قَالَ لَهُۥ مُوسَىٰ هَلۡ أَتَّبِعُكَ عَلَىٰٓ أَن تُعَلِّمَنِ مِمَّا عُلِّمۡتَ رُشۡدٗا

    Open ayah 18:66

    Mûssa ayebisi ye: Boye nalanda yo mpo otangisa ngai boyebi boye otangisama ya bosôló?

  67. قَالَ إِنَّكَ لَن تَسۡتَطِيعَ مَعِيَ صَبۡرٗا

    Open ayah 18:67

    (Moto wana) alobi na Mûssa ete: Okokoka kokanga motema elongo na ngai te.

  68. وَكَيۡفَ تَصۡبِرُ عَلَىٰ مَا لَمۡ تُحِطۡ بِهِۦ خُبۡرٗا

    Open ayah 18:68

    Ndenge nini okokoka kokanga motema na maye (makambo) oyo ozali na boyebi na yango te?

  69. قَالَ سَتَجِدُنِيٓ إِن شَآءَ ٱللَّهُ صَابِرٗا وَلَآ أَعۡصِي لَكَ أَمۡرٗا

    Open ayah 18:69

    (Mûssa) alobi: Na bolingi bwa Allah, okomona ngai na kangi motema. Mpe nakoboyaka mobeko nayo ata moko te.

  70. قَالَ فَإِنِ ٱتَّبَعۡتَنِي فَلَا تَسۡـَٔلۡنِي عَن شَيۡءٍ حَتَّىٰٓ أُحۡدِثَ لَكَ مِنۡهُ ذِكۡرٗا 

    Open ayah 18:70

    Alobi: Soki olandi ngai kotuna ngai eloko te kino nakoyebisa yo ntina na yango.

  71. فَٱنطَلَقَا حَتَّىٰٓ إِذَا رَكِبَا فِي ٱلسَّفِينَةِ خَرَقَهَاۖ قَالَ أَخَرَقۡتَهَا لِتُغۡرِقَ أَهۡلَهَا لَقَدۡ جِئۡتَ شَيۡـًٔا إِمۡرٗا

    Open ayah 18:71

    Bakei bango mibale, tango bamati na masuwa (bwato) abebisi yango, (Mûssa) alobi: Obebisi yango mpo ozindisa bakolo na yango? O sali mpenza likambo linene!

  72. قَالَ أَلَمۡ أَقُلۡ إِنَّكَ لَن تَسۡتَطِيعَ مَعِيَ صَبۡرٗا

    Open ayah 18:72

    (Wana) alobi: Nayebisaki yo te ete: Okokoka kokanga motema te elongo na nga?

  73. قَالَ لَا تُؤَاخِذۡنِي بِمَا نَسِيتُ وَلَا تُرۡهِقۡنِي مِنۡ أَمۡرِي عُسۡرٗا

    Open ayah 18:73

    (Mûssa) alobi: Kornona ngai mabe te na ndenge nabosani, mpe kotelema makasi te тропа likambo lia ngai.

  74. فَٱنطَلَقَا حَتَّىٰٓ إِذَا لَقِيَا غُلَٰمٗا فَقَتَلَهُۥ قَالَ أَقَتَلۡتَ نَفۡسٗا زَكِيَّةَۢ بِغَيۡرِ نَفۡسٖ لَّقَدۡ جِئۡتَ شَيۡـٔٗا نُّكۡرٗا

    Open ayah 18:74

    Bakei bango banso babale, kino bakutanaki na mwana mobali, mpe abomi ye. (Mûssa) alobi: Obomi moto sé pamba boye, oyo asali eloko te? Osali soló mabe monene.

  75. ۞قَالَ أَلَمۡ أَقُل لَّكَ إِنَّكَ لَن تَسۡتَطِيعَ مَعِيَ صَبۡرٗا

    Open ayah 18:75

    (Moto wana) alobi: Nayebisaki yo te ete okokoka kokanga motema elongo na ngai te?

  76. قَالَ إِن سَأَلۡتُكَ عَن شَيۡءِۭ بَعۡدَهَا فَلَا تُصَٰحِبۡنِيۖ قَدۡ بَلَغۡتَ مِن لَّدُنِّي عُذۡرٗا

    Open ayah 18:76

    (Mûssa) alobi: Soki natuni yo lisusu eloko sima na yango, osili kozua nzela тропа kokabuana na ngai. Okolimbisama тропа kokabuana na ngai.

  77. فَٱنطَلَقَا حَتَّىٰٓ إِذَآ أَتَيَآ أَهۡلَ قَرۡيَةٍ ٱسۡتَطۡعَمَآ أَهۡلَهَا فَأَبَوۡاْ أَن يُضَيِّفُوهُمَا فَوَجَدَا فِيهَا جِدَارٗا يُرِيدُ أَن يَنقَضَّ فَأَقَامَهُۥۖ قَالَ لَوۡ شِئۡتَ لَتَّخَذۡتَ عَلَيۡهِ أَجۡرٗا

    Open ayah 18:77

    Bakei bango babale kino bakomi na mboka ya bato, batuni bayamba bango na biloko ya kolia, baboyi koyamba bango. Mpe bakutaki kati na yango efelo elingi kokweya, (moto wana) atomboli yango, (Mûssa) alobi; Soki olingaki mbele osengaki lifuta тропа yango.

  78. قَالَ هَٰذَا فِرَاقُ بَيۡنِي وَبَيۡنِكَۚ سَأُنَبِّئُكَ بِتَأۡوِيلِ مَا لَمۡ تَسۡتَطِع عَّلَيۡهِ صَبۡرًا

    Open ayah 18:78

    Alobi ete: Oyo nde bokabwani kati kati na ngai nayo, nakolimbolela yo maye okokaki kokanga motema te.

  79. أَمَّا ٱلسَّفِينَةُ فَكَانَتۡ لِمَسَٰكِينَ يَعۡمَلُونَ فِي ٱلۡبَحۡرِ فَأَرَدتُّ أَنۡ أَعِيبَهَا وَكَانَ وَرَآءَهُم مَّلِكٞ يَأۡخُذُ كُلَّ سَفِينَةٍ غَصۡبٗا

    Open ayah 18:79

    Mpona masuwa (bwato), ezalaki ya babola basalaka na yango na ebale. Nabebisaki yango mpo sima na bango ezalaki na mokonzi moko mobubi azalaki kobotolo ba bwato nyoso ya kitoko.

  80. وَأَمَّا ٱلۡغُلَٰمُ فَكَانَ أَبَوَاهُ مُؤۡمِنَيۡنِ فَخَشِينَآ أَن يُرۡهِقَهُمَا طُغۡيَٰنٗا وَكُفۡرٗا 

    Open ayah 18:80

    Mpe mpona mwana mobali, azalaki na baboti baye babale, bazalaki bandimi, tobangaki (soki akoli) akobebisa bondimi bwa bango na botomboki na bopengwi.

  81. فَأَرَدۡنَآ أَن يُبۡدِلَهُمَا رَبُّهُمَا خَيۡرٗا مِّنۡهُ زَكَوٰةٗ وَأَقۡرَبَ رُحۡمٗا

    Open ayah 18:81

    Tolingaki ete Nkolo wa bango mibale apesa bango mwana mosusu ya malamu, apetwama mpe ya boboto esika naye.

  82. وَأَمَّا ٱلۡجِدَارُ فَكَانَ لِغُلَٰمَيۡنِ يَتِيمَيۡنِ فِي ٱلۡمَدِينَةِ وَكَانَ تَحۡتَهُۥ كَنزٞ لَّهُمَا وَكَانَ أَبُوهُمَا صَٰلِحٗا فَأَرَادَ رَبُّكَ أَن يَبۡلُغَآ أَشُدَّهُمَا وَيَسۡتَخۡرِجَا كَنزَهُمَا رَحۡمَةٗ مِّن رَّبِّكَۚ وَمَا فَعَلۡتُهُۥ عَنۡ أَمۡرِيۚ ذَٰلِكَ تَأۡوِيلُ مَا لَمۡ تَسۡطِع عَّلَيۡهِ صَبۡرٗا

    Open ayah 18:82

    Mpe mpona efelo, ezalaki ya bana bitike babale kati na mboka wana, o nsé na yango ezalaki na bomengo na bango, kasi tata wabango azalaki (moto) malamu, Nkolo wa yo alingaki ete soki bakoli babimisa bomengo bwa bango bona na mawa ma Allah. Nasalaki yango na mitindo mia ngai moko te. Wana nde ndimbola ya maye okokaki kokanga na yango motema te.

  83. وَيَسۡـَٔلُونَكَ عَن ذِي ٱلۡقَرۡنَيۡنِۖ قُلۡ سَأَتۡلُواْ عَلَيۡكُم مِّنۡهُ ذِكۡرًا

    Open ayah 18:83

    Mpe bazali kotuna yo mpona Dzu-al-Qarnaïn,[1] loba: Nakotangela bino mwa bokundoli moke.

    1. Dzu-al-Qarnaïn: Azalaki mowumbu ya malamu, azalaki na bokonzi ya maye mazalaki okati ya eloli na moniele na tango naye.
  84. إِنَّا مَكَّنَّا لَهُۥ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَءَاتَيۡنَٰهُ مِن كُلِّ شَيۡءٖ سَبَبٗا

    Open ayah 18:84

    Ya soló, tolendisaki bokasi bwa ye awa na nsé, mpe topesaki ye nzela likolo ya biloko binso.

  85. فَأَتۡبَعَ سَبَبًا

    Open ayah 18:85

    Mpe alandaki nzela,

  86. حَتَّىٰٓ إِذَا بَلَغَ مَغۡرِبَ ٱلشَّمۡسِ وَجَدَهَا تَغۡرُبُ فِي عَيۡنٍ حَمِئَةٖ وَوَجَدَ عِندَهَا قَوۡمٗاۖ قُلۡنَا يَٰذَا ٱلۡقَرۡنَيۡنِ إِمَّآ أَن تُعَذِّبَ وَإِمَّآ أَن تَتَّخِذَ فِيهِمۡ حُسۡنٗا

    Open ayah 18:86

    Kino tango moyi mokokita, akuti yango ekiti na moluka mwa mayi ma moto pene na yango akuti bato, tolobaki: Oh Dzu-al- Qarnaïn! Opesa bango etumbu to osalela bango bolamu.

  87. قَالَ أَمَّا مَن ظَلَمَ فَسَوۡفَ نُعَذِّبُهُۥ ثُمَّ يُرَدُّ إِلَىٰ رَبِّهِۦ فَيُعَذِّبُهُۥ عَذَابٗا نُّكۡرٗا

    Open ayah 18:87

    Alobi: Oyó abubaki, tokopesa ye etumbu, sima tokomema ye epai ya Nkolo waye apesa ye etumbu ya somo koleka.

  88. وَأَمَّا مَنۡ ءَامَنَ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا فَلَهُۥ جَزَآءً ٱلۡحُسۡنَىٰۖ وَسَنَقُولُ لَهُۥ مِنۡ أَمۡرِنَا يُسۡرٗا

    Open ayah 18:88

    Mpe oyo andimaki mpe asalaki mosala ya malamu, ye akozua lifuta lilamu mpe tokoloba naye, (na bopesi) mibeko mia biso mizali pete.

  89. ثُمَّ أَتۡبَعَ سَبَبًا

    Open ayah 18:89

    Sima alandaki nzela,

  90. حَتَّىٰٓ إِذَا بَلَغَ مَطۡلِعَ ٱلشَّمۡسِ وَجَدَهَا تَطۡلُعُ عَلَىٰ قَوۡمٖ لَّمۡ نَجۡعَل لَّهُم مِّن دُونِهَا سِتۡرٗا 

    Open ayah 18:90

    Kino akomaki na ebimeli ya moyi akutaki (moyi) ezali koleka likolo na bato moko boye topesaki bango eloko te ya komizipa na moyi.

  91. كَذَٰلِكَۖ وَقَدۡ أَحَطۡنَا بِمَا لَدَيۡهِ خُبۡرٗا

    Open ayah 18:91

    Ndenge wana nde ndenge tozipaki boyebi bwa biso na oyo azalaki na yango.

  92. ثُمَّ أَتۡبَعَ سَبَبًا

    Open ayah 18:92

    Sima alandaki nzela,

  93. حَتَّىٰٓ إِذَا بَلَغَ بَيۡنَ ٱلسَّدَّيۡنِ وَجَدَ مِن دُونِهِمَا قَوۡمٗا لَّا يَكَادُونَ يَفۡقَهُونَ قَوۡلٗا

    Open ayah 18:93

    Kino tango akomaki kati ya ndelo ezwami na kati ya ngomba mibale akuti sima na yango bato baye bazali kososola maloba ya bato misusu te.

  94. قَالُواْ يَٰذَا ٱلۡقَرۡنَيۡنِ إِنَّ يَأۡجُوجَ وَمَأۡجُوجَ مُفۡسِدُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَهَلۡ نَجۡعَلُ لَكَ خَرۡجًا عَلَىٰٓ أَن تَجۡعَلَ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَهُمۡ سَدّٗا

    Open ayah 18:94

    Balobi: Oh Dzu-al-Qarnaïn! Ya soló, ba ya’djûdj na ba ma’djûdj[1] bazali babebisi na mokili, tokoki te kotiela yo makoki ete opika ndelo kati na biso na bango?

    1. Ya’djûdj na Ma’djûdj: Ezalaki bikolo mibale bazalaki koyokana te babengi bango na lokota francais: (gog na magog).
  95. قَالَ مَا مَكَّنِّي فِيهِ رَبِّي خَيۡرٞ فَأَعِينُونِي بِقُوَّةٍ أَجۡعَلۡ بَيۡنَكُمۡ وَبَيۡنَهُمۡ رَدۡمًا

    Open ayah 18:95

    Alobi: Oyo Nkolo wa ngai apeși ngai ezali malamu (koleka oyo ya bino) bosalisa ngai na bokasi bwa bino mpe natia ndelo kati na bino na bango, (mpo bakatisa te)

  96. ءَاتُونِي زُبَرَ ٱلۡحَدِيدِۖ حَتَّىٰٓ إِذَا سَاوَىٰ بَيۡنَ ٱلصَّدَفَيۡنِ قَالَ ٱنفُخُواْۖ حَتَّىٰٓ إِذَا جَعَلَهُۥ نَارٗا قَالَ ءَاتُونِيٓ أُفۡرِغۡ عَلَيۡهِ قِطۡرٗا

    Open ayah 18:96

    В óyela ngai liboke ya übende, mpe tango asilisi kotondisa taka kati na bangomba mibale, alobi na bango ete: Bofula, kino ezuaki moto, alobi na bango ete: Boyela ngai mayi ya übende wana eyanguami nasopa yango likolo.

  97. فَمَا ٱسۡطَٰعُوٓاْ أَن يَظۡهَرُوهُ وَمَا ٱسۡتَطَٰعُواْ لَهُۥ نَقۡبٗا

    Open ayah 18:97

    Bakokaki komonisa bokasi te na komata na yango.

  98. قَالَ هَٰذَا رَحۡمَةٞ مِّن رَّبِّيۖ فَإِذَا جَآءَ وَعۡدُ رَبِّي جَعَلَهُۥ دَكَّآءَۖ وَكَانَ وَعۡدُ رَبِّي حَقّٗا

    Open ayah 18:98

    Alobi: Oyo ezali ngolu kowuta epai ya Nkolo wa ngai, tango elaka ya Nkolo wa ngai ekoyaka, akolalisa yango mpe akosukisa yango, mpe elaka ya Nkolo wa ngai ezalaka solo.

  99. ۞وَتَرَكۡنَا بَعۡضَهُمۡ يَوۡمَئِذٖ يَمُوجُ فِي بَعۡضٖۖ وَنُفِخَ فِي ٱلصُّورِ فَجَمَعۡنَٰهُمۡ جَمۡعٗا

    Open ayah 18:99

    Mpe totikaki bazali kotepatepa bango na bango, mpe bakobetaka kelelo mpe tokosangisa bango banso.

  100. وَعَرَضۡنَا جَهَنَّمَ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡكَٰفِرِينَ عَرۡضًا 

    Open ayah 18:100

    Мре mokolo mona tokolakisaka bapengwi moto mwa lifelo.

  101. ٱلَّذِينَ كَانَتۡ أَعۡيُنُهُمۡ فِي غِطَآءٍ عَن ذِكۡرِي وَكَانُواْ لَا يَسۡتَطِيعُونَ سَمۡعًا 

    Open ayah 18:101

    Baye miso ma bango mazalaki ya kozipama тропа likanisi na ngai, mpe bazalaki kokoka koyoka te.

  102. أَفَحَسِبَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَن يَتَّخِذُواْ عِبَادِي مِن دُونِيٓ أَوۡلِيَآءَۚ إِنَّآ أَعۡتَدۡنَا جَهَنَّمَ لِلۡكَٰفِرِينَ نُزُلٗا 

    Open ayah 18:102

    Baye bapengwa bazali kokanisa ete bawumbu ba ngai bazuela ngai bambanda basusu batika ngai? Ya soló, tolengeli moto mwa lifelo ekozala esika ya kovanda тропа bapengwi.

  103. قُلۡ هَلۡ نُنَبِّئُكُم بِٱلۡأَخۡسَرِينَ أَعۡمَٰلًا 

    Open ayah 18:103

    Loba: Boye bolingi toyebisa bino ba nani oyo bazali na bozangi monene koleka kati na misala?

  104. ٱلَّذِينَ ضَلَّ سَعۡيُهُمۡ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَهُمۡ يَحۡسَبُونَ أَنَّهُمۡ يُحۡسِنُونَ صُنۡعًا 

    Open ayah 18:104

    Baye misala mia bango mibebaki kati na bomoyi bwa mokili, mpe bazalaki kokanisa ete basalaki bolamu.

  105. أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمۡ وَلِقَآئِهِۦ فَحَبِطَتۡ أَعۡمَٰلُهُمۡ فَلَا نُقِيمُ لَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وَزۡنٗا 

    Open ayah 18:105

    Baye bana baboyaki kondima na bilembo bia Nkolo wa bango mpe bokutani naye, misala mia bango ebebi, tokotiyelaka bango kilo o mokolo mwa suka te.

  106. ذَٰلِكَ جَزَآؤُهُمۡ جَهَنَّمُ بِمَا كَفَرُواْ وَٱتَّخَذُوٓاْ ءَايَٰتِي وَرُسُلِي هُزُوًا 

    Open ayah 18:106

    Moto mwa lifelo mokozalaka lifuta lia bango na maye bapengwaki na yango, basakanaki na bilembo na ngai mpe batindami ba ngai.

  107. إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ كَانَتۡ لَهُمۡ جَنَّٰتُ ٱلۡفِرۡدَوۡسِ نُزُلًا 

    Open ayah 18:107

    Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, esika ya kovanda na bango ekozalaka na paladizo ya likolo koleka (al firdawsi).

  108. خَٰلِدِينَ فِيهَا لَا يَبۡغُونَ عَنۡهَا حِوَلٗا 

    Open ayah 18:108

    Libela kati na yango, bakolikia mbongwana te kati na yango.

  109. قُل لَّوۡ كَانَ ٱلۡبَحۡرُ مِدَادٗا لِّكَلِمَٰتِ رَبِّي لَنَفِدَ ٱلۡبَحۡرُ قَبۡلَ أَن تَنفَدَ كَلِمَٰتُ رَبِّي وَلَوۡ جِئۡنَا بِمِثۡلِهِۦ مَدَدٗا 

    Open ayah 18:109

    Loba: Soki ebale ya monene ezalaki lokola mayi ya mokanda, (тропа кокота na yango) maloba та Nkolo wa ngai (Allah), elingaki kokawuka liboso, mpe maloba ya Nkolo nangai esili te, ata soki toyei na ebale mosusu lokola yango mbala ebele.

  110. قُلۡ إِنَّمَآ أَنَا۠ بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡ يُوحَىٰٓ إِلَيَّ أَنَّمَآ إِلَٰهُكُمۡ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞۖ فَمَن كَانَ يَرۡجُواْ لِقَآءَ رَبِّهِۦ فَلۡيَعۡمَلۡ عَمَلٗا صَٰلِحٗا وَلَا يُشۡرِكۡ بِعِبَادَةِ رَبِّهِۦٓ أَحَدَۢا 

    Open ayah 18:110

    Loba: Ya sólo, nazali moto lokola bino, bakitiseli ngai emoniseli, ya soló Nzambe wa bino azali Nzambe moko, ya soló, oyo asengeli na mabondeli na oyo akolikia kokutana, na Nkolo waye, asala misala milamu, mpe asangisa libondeli lia Nkolo waye na eloko moko te.