الواقعة
Al-Waaqia
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
إِذَا وَقَعَتِ ٱلۡوَاقِعَةُ
Open ayah 56:1Tango likambo monene ekokweya,
لَيۡسَ لِوَقۡعَتِهَا كَاذِبَةٌ
Open ayah 56:2Koya na yango ezali lokuta te.
خَافِضَةٞ رَّافِعَةٌ
Open ayah 56:3Akokitisaka (basusu) mpe akotombolaka (basusu)
إِذَا رُجَّتِ ٱلۡأَرۡضُ رَجّٗا
Open ayah 56:4Tango mabele makoninganaka makasi,
وَبُسَّتِ ٱلۡجِبَالُ بَسّٗا
Open ayah 56:5Mpe tango bangomba bikokutoamaka mike mike,
فَكَانَتۡ هَبَآءٗ مُّنۢبَثّٗا
Open ayah 56:6Mpe mikokoma putulu mizali kopanzana.
وَكُنتُمۡ أَزۡوَٰجٗا ثَلَٰثَةٗ
Open ayah 56:7Mpe bokozalaka lisanga misato:
فَأَصۡحَٰبُ ٱلۡمَيۡمَنَةِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡمَيۡمَنَةِ
Open ayah 56:8Bato ya ngambu ya loboko ya mobali bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mobali!
وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡمَشۡـَٔمَةِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡمَشۡـَٔمَةِ
Open ayah 56:9Mpe bato ya ngambu ya loboko ya mwasi bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mwasi!
وَٱلسَّٰبِقُونَ ٱلسَّٰبِقُونَ
Open ayah 56:10Bato ya liboso (baye balandaki mibeko mia Allah na mabele) bakozalaka bato ya liboso na mokolo ya suka.
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلۡمُقَرَّبُونَ
Open ayah 56:11Baye wana nde bakozalaka pene na Allah.
فِي جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ
Open ayah 56:12O kati ya bilanga (bia lola) ya bolamu.
ثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ
Open ayah 56:13Bazali ebele oyo baponami kowuta na bato ya liboso,
وَقَلِيلٞ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ
Open ayah 56:14Мре moke okati ya bato ya sima.
عَلَىٰ سُرُرٖ مَّوۡضُونَةٖ
Open ayah 56:15(Bakolala) likolo lia bambeto bibongisami na wolo,
مُّتَّكِـِٔينَ عَلَيۡهَا مُتَقَٰبِلِينَ
Open ayah 56:16Bayekami likolo na yango bazali kotalana. (na kimia)
يَطُوفُ عَلَيۡهِمۡ وِلۡدَٰنٞ مُّخَلَّدُونَ
Open ayah 56:17Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela,
بِأَكۡوَابٖ وَأَبَارِيقَ وَكَأۡسٖ مِّن مَّعِينٖ
Open ayah 56:18Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli).
لَّا يُصَدَّعُونَ عَنۡهَا وَلَا يُنزِفُونَ
Open ayah 56:19(Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te.
وَفَٰكِهَةٖ مِّمَّا يَتَخَيَّرُونَ
Open ayah 56:20Mpe (bakoliaka) bambuma oyo bakolingaka,
وَلَحۡمِ طَيۡرٖ مِّمَّا يَشۡتَهُونَ
Open ayah 56:21Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi.
وَحُورٌ عِينٞ
Open ayah 56:22Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala,
كَأَمۡثَٰلِ ٱللُّؤۡلُوِٕ ٱلۡمَكۡنُونِ
Open ayah 56:23Lokola mabanga kitoko ya ebale ezali kongenga,
جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
Open ayah 56:24Lifuta тропа maye basalaki.
لَا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوٗا وَلَا تَأۡثِيمًا
Open ayah 56:25Okati na yango, bakoyoka maloba mabe te, mpe ya pamba pamba te.
إِلَّا قِيلٗا سَلَٰمٗا سَلَٰمٗا
Open ayah 56:26Bakolobaka se: Liloba ya kimia na kimia.
وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ
Open ayah 56:27Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali!
فِي سِدۡرٖ مَّخۡضُودٖ
Open ayah 56:28Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr,
وَطَلۡحٖ مَّنضُودٖ
Open ayah 56:29Na banzete ya makemba na bitabe,
وَظِلّٖ مَّمۡدُودٖ
Open ayah 56:30Na nsé ya malili ya monene,
وَمَآءٖ مَّسۡكُوبٖ
Open ayah 56:31(pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela,
وَفَٰكِهَةٖ كَثِيرَةٖ
Open ayah 56:32Mpe bambuma ebele,
لَّا مَقۡطُوعَةٖ وَلَا مَمۡنُوعَةٖ
Open ayah 56:33Babuki yango te mpe epekisami te.
وَفُرُشٖ مَّرۡفُوعَةٍ
Open ayah 56:34O likolo lia bambeto ya likolo.
إِنَّآ أَنشَأۡنَٰهُنَّ إِنشَآءٗ
Open ayah 56:35Biso nde tokelaki bango na bokeli,
فَجَعَلۡنَٰهُنَّ أَبۡكَارًا
Open ayah 56:36Mpe tosalaki bango bayebi mibali te,
عُرُبًا أَتۡرَابٗا
Open ayah 56:37Bazali bambula ndenge moko.
لِّأَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ
Open ayah 56:38Mpona bato ya loboko ya mobali.
ثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ
Open ayah 56:39Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso,
وَثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ
Open ayah 56:40Bazali mpe ebele okati ya bato ya suka.
وَأَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ
Open ayah 56:41Мре bato ya ngambu ya loboko ya mwasi, ba nani yango wana!
فِي سَمُومٖ وَحَمِيمٖ
Open ayah 56:42Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka,
وَظِلّٖ مِّن يَحۡمُومٖ
Open ayah 56:43Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo,
لَّا بَارِدٖ وَلَا كَرِيمٍ
Open ayah 56:44(kati na yango) malili te mpe kitoko te.
إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَبۡلَ ذَٰلِكَ مُتۡرَفِينَ
Open ayah 56:45Bazalaki liboso na bomoyi ya kitoko.
وَكَانُواْ يُصِرُّونَ عَلَى ٱلۡحِنثِ ٱلۡعَظِيمِ
Open ayah 56:46Bazalaki kosala masumu minene mpe kosangisa Allah mingi.
وَكَانُواْ يَقُولُونَ أَئِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ
Open ayah 56:47(Bazali koloba): Soki tokufi tokomi mikuwa mpe putulu, boye tokosekwisamaka lisusu?
أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ
Open ayah 56:48Na bankoko ya biso ya yambo?
قُلۡ إِنَّ ٱلۡأَوَّلِينَ وَٱلۡأٓخِرِينَ
Open ayah 56:49Loba: Ya soló, ba oyo ya liboso na ya suka,
لَمَجۡمُوعُونَ إِلَىٰ مِيقَٰتِ يَوۡمٖ مَّعۡلُومٖ
Open ayah 56:50Bakosangisama na bokutani ya mokolo moyebani.
ثُمَّ إِنَّكُمۡ أَيُّهَا ٱلضَّآلُّونَ ٱلۡمُكَذِّبُونَ
Open ayah 56:51Na yango bino babungi baye boboyaki kondima (na mokolo ya suka),
لَأٓكِلُونَ مِن شَجَرٖ مِّن زَقُّومٖ
Open ayah 56:52Bokoliaka ya soló, bitape bia nzete ya zaqqúm[1].
- Zaqqúm: Bótala na suratu As-Swâffât mokapo: 62.
فَمَالِـُٔونَ مِنۡهَا ٱلۡبُطُونَ
Open ayah 56:53Mabumu na bino makotondaka na yango.
فَشَٰرِبُونَ عَلَيۡهِ مِنَ ٱلۡحَمِيمِ
Open ayah 56:54Sima bokomelaka mayi ya moto ya makasi.
فَشَٰرِبُونَ شُرۡبَ ٱلۡهِيمِ
Open ayah 56:55Bokomelaka (yango) lolenge ibili amelaka na mposa (nyoso).
هَٰذَا نُزُلُهُمۡ يَوۡمَ ٱلدِّينِ
Open ayah 56:56Wana nde bilei oyo bakoyambaka bango na yango o mokolo ya suka.
نَحۡنُ خَلَقۡنَٰكُمۡ فَلَوۡلَا تُصَدِّقُونَ
Open ayah 56:57Biso nde tokela bino, kasi тропа nini bozali kondima na mokolo ya suka te?
أَفَرَءَيۡتُم مَّا تُمۡنُونَ
Open ayah 56:58Boye bozali kornona te mayi oyo bozali kobimisa yango na mokongo?
ءَأَنتُمۡ تَخۡلُقُونَهُۥٓ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡخَٰلِقُونَ
Open ayah 56:59Bino nde bokela yango to biso nde bakeli?
نَحۡنُ قَدَّرۡنَا بَيۡنَكُمُ ٱلۡمَوۡتَ وَمَا نَحۡنُ بِمَسۡبُوقِينَ
Open ayah 56:60Biso nde tosila кокота liwa kati na bino, mpe eloko moko ekopekisa biso te,
عَلَىٰٓ أَن نُّبَدِّلَ أَمۡثَٰلَكُمۡ وَنُنشِئَكُمۡ فِي مَا لَا تَعۡلَمُونَ
Open ayah 56:61Mpo totiya na esika na bino (bato) misusu lokola bino, mpe tobotisa bino na lolenge oyo boyebi te.
وَلَقَدۡ عَلِمۡتُمُ ٱلنَّشۡأَةَ ٱلۡأُولَىٰ فَلَوۡلَا تَذَكَّرُونَ
Open ayah 56:62Mpe bosilaki koyeba bokeli bwa liboso; boye bozali kokanisa te?
أَفَرَءَيۡتُم مَّا تَحۡرُثُونَ
Open ayah 56:63Boye bozali kornona biloko oyo bozali kobimisa yango (nanse ya mabele)?
ءَأَنتُمۡ تَزۡرَعُونَهُۥٓ أَمۡ نَحۡنُ ٱلزَّٰرِعُونَ
Open ayah 56:64Ezali bino nde bolonaka yango to biso nde baloni?
لَوۡ نَشَآءُ لَجَعَلۡنَٰهُ حُطَٰمٗا فَظَلۡتُمۡ تَفَكَّهُونَ
Open ayah 56:65Soki tolingaki, nde tokomisaki yango makala, nde botikalaki kokamwa. (mpe kobeta misapi sima)
إِنَّا لَمُغۡرَمُونَ
Open ayah 56:66Tala biso tokomi na banyongo,
بَلۡ نَحۡنُ مَحۡرُومُونَ
Open ayah 56:67Kasi bapimeli nde biso.
أَفَرَءَيۡتُمُ ٱلۡمَآءَ ٱلَّذِي تَشۡرَبُونَ
Open ayah 56:68Boye bozali kornona mayi oyo bozali komela?
ءَأَنتُمۡ أَنزَلۡتُمُوهُ مِنَ ٱلۡمُزۡنِ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡمُنزِلُونَ
Open ayah 56:69Bino nde bokitisaka yango kowuta na mapata to biso nde bakitisi?
لَوۡ نَشَآءُ جَعَلۡنَٰهُ أُجَاجٗا فَلَوۡلَا تَشۡكُرُونَ
Open ayah 56:70Soki tolingaki, nde tokomisaki yango mungwa mungwa, boye тропа nini bozali kopesa matondo te? (epai ya Allah).
أَفَرَءَيۡتُمُ ٱلنَّارَ ٱلَّتِي تُورُونَ
Open ayah 56:71Boye bozali kornona moto oyo bozali kopelisa te?
ءَأَنتُمۡ أَنشَأۡتُمۡ شَجَرَتَهَآ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡمُنشِـُٔونَ
Open ayah 56:72Bino nde bokela nzete yango to biso nde bakeli?
نَحۡنُ جَعَلۡنَٰهَا تَذۡكِرَةٗ وَمَتَٰعٗا لِّلۡمُقۡوِينَ
Open ayah 56:73Totiyaki yango ezala bokundoli (тропа lolenge lifelo ekozala), mpe esalisa baye bazali na mposa na yango (тропа baye bazali na mobembo)
فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ
Open ayah 56:74Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene.
۞فَلَآ أُقۡسِمُ بِمَوَٰقِعِ ٱلنُّجُومِ
Open ayah 56:75(Te) nalapi na bisika minzoto mikweyaka,
وَإِنَّهُۥ لَقَسَمٞ لَّوۡ تَعۡلَمُونَ عَظِيمٌ
Open ayah 56:76Ya sôló, ezali kolapa ya monene soki boyebaka,
إِنَّهُۥ لَقُرۡءَانٞ كَرِيمٞ
Open ayah 56:77Ya soló, kurani oyo ezali na lokumu,
فِي كِتَٰبٖ مَّكۡنُونٖ
Open ayah 56:78Ebatelami kati na buku.
لَّا يَمَسُّهُۥٓ إِلَّا ٱلۡمُطَهَّرُونَ
Open ayah 56:79Basimbaka yango te sé na bapetoami,
تَنزِيلٞ مِّن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Open ayah 56:80Ekita kowuta epai ya Nkolo ya mokili.
أَفَبِهَٰذَا ٱلۡحَدِيثِ أَنتُم مُّدۡهِنُونَ
Open ayah 56:81Boye bozali kozua liloba oyo na lokuta?
وَتَجۡعَلُونَ رِزۡقَكُمۡ أَنَّكُمۡ تُكَذِّبُونَ
Open ayah 56:82Boye na lolenge wana nde bokozala na botondi na bozui na bino, ete boboya kondima na kurani?
فَلَوۡلَآ إِذَا بَلَغَتِ ٱلۡحُلۡقُومَ
Open ayah 56:83Tango mpema ekomata tii na mongongo,
وَأَنتُمۡ حِينَئِذٖ تَنظُرُونَ
Open ayah 56:84Mpe tango wana bozali kotala.
وَنَحۡنُ أَقۡرَبُ إِلَيۡهِ مِنكُمۡ وَلَٰكِن لَّا تُبۡصِرُونَ
Open ayah 56:85Mpe biso tozali pembeni naye koleka bino, kasi bozali kornona te.
فَلَوۡلَآ إِن كُنتُمۡ غَيۡرَ مَدِينِينَ
Open ayah 56:86Boye soki boyebi ete bozali na nsé ya mibeko na biso te (bokosekwisama te, to mpe bokofutama te).
تَرۡجِعُونَهَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Open ayah 56:87Bozongisa yango (molimo) soki bozali na bosembo?
فَأَمَّآ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡمُقَرَّبِينَ
Open ayah 56:88Soki akozala na molongo ya bato ya pembeni ya (Allah),
فَرَوۡحٞ وَرَيۡحَانٞ وَجَنَّتُ نَعِيمٖ
Open ayah 56:89(Na yango akozala): Na bopemi mpe ngrásia okati ya lola ya esengo.
وَأَمَّآ إِن كَانَ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ
Open ayah 56:90Mpe soki azali o kati ya bato ya loboko ya mobali,
فَسَلَٰمٞ لَّكَ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ
Open ayah 56:91(Bakoyambaka ye na liloba ya): Kimia ezala nayo, mpo ozali ngambu ya loboko ya mobali!
وَأَمَّآ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡمُكَذِّبِينَ ٱلضَّآلِّينَ
Open ayah 56:92Kasi soki azalaki okati ya baye baboyaki mpe babungi,
فَنُزُلٞ مِّنۡ حَمِيمٖ
Open ayah 56:93Akokitisama okati ya mayi ya moto ya makasi.
وَتَصۡلِيَةُ جَحِيمٍ
Open ayah 56:94Mpe akozikisama okati ya moto.
إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ حَقُّ ٱلۡيَقِينِ
Open ayah 56:95Wana nde likambo ya soló.
فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ
Open ayah 56:96Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene