القلم

Al-Qalam

The Pen · Surah 68 · Ayahs: 52 · Meccan

Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

  1. نٓۚ وَٱلۡقَلَمِ وَمَا يَسۡطُرُونَ

    Open ayah 68:1

    Nún[1], (nalapi) na ekomeli na oyo ezali kokoma.

    1. Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
  2. مَآ أَنتَ بِنِعۡمَةِ رَبِّكَ بِمَجۡنُونٖ

    Open ayah 68:2

    Yo (Muhammad) na ngrásia y a Nkolo nayo ozali libgoma te.

  3. وَإِنَّ لَكَ لَأَجۡرًا غَيۡرَ مَمۡنُونٖ

    Open ayah 68:3

    Mpe ya sôló, ozali na lifuta oyo esilaka te,

  4. وَإِنَّكَ لَعَلَىٰ خُلُقٍ عَظِيمٖ

    Open ayah 68:4

    Mpe ya sôló, ozali na ezaleli ya malamu.

  5. فَسَتُبۡصِرُ وَيُبۡصِرُونَ

    Open ayah 68:5

    Yo okomona mpe bango bakomona,

  6. بِأَييِّكُمُ ٱلۡمَفۡتُونُ

    Open ayah 68:6

    Nani kati na bino amekami?

  7. إِنَّ رَبَّكَ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَن ضَلَّ عَن سَبِيلِهِۦ وَهُوَ أَعۡلَمُ بِٱلۡمُهۡتَدِينَ

    Open ayah 68:7

    Ya sôló, Nkolo wa yo ayebi malamu oyo abunga nzela naye, mpe ayebi malamu baye bazali na bokambami.

  8. فَلَا تُطِعِ ٱلۡمُكَذِّبِينَ

    Open ayah 68:8

    Kaši kotosa bato ya lokuta te.

  9. وَدُّواْ لَوۡ تُدۡهِنُ فَيُدۡهِنُونَ

    Open ayah 68:9

    Bakosepela ozala malamu na bango mpo bazala mpe malamu nayo.

  10. وَلَا تُطِعۡ كُلَّ حَلَّافٖ مَّهِينٍ 

    Open ayah 68:10

    Mpe kotosa moko te na bango, bazali kolapa na ntina te.

  11. هَمَّازٖ مَّشَّآءِۭ بِنَمِيمٖ

    Open ayah 68:11

    Bato ya songi songi, bazali kokosela bato makambo.

  12. مَّنَّاعٖ لِّلۡخَيۡرِ مُعۡتَدٍ أَثِيمٍ

    Open ayah 68:12

    Baye bapekisaka bolamu ya bato, bazali kolekisa ndelo mpe basali na masumu,

  13. عُتُلِّۭ بَعۡدَ ذَٰلِكَ زَنِيمٍ

    Open ayah 68:13

    Bazali na mitema makasi mpe bazali na lolendo.

  14. أَن كَانَ ذَا مَالٖ وَبَنِينَ

    Open ayah 68:14

    Ata soki azali na misolo ebele na bana ebele, (alingi kobonguana te)

  15. إِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِ ءَايَٰتُنَا قَالَ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ

    Open ayah 68:15

    Soki batangeli ye mikapo mia biso, alobi: Wana ezali sé masapo ya bankoko ya kala.

  16. سَنَسِمُهُۥ عَلَى ٱلۡخُرۡطُومِ

    Open ayah 68:16

    Tokomonisa elembo naye likolo na zolo.

  17. إِنَّا بَلَوۡنَٰهُمۡ كَمَا بَلَوۡنَآ أَصۡحَٰبَ ٱلۡجَنَّةِ إِذۡ أَقۡسَمُواْ لَيَصۡرِمُنَّهَا مُصۡبِحِينَ

    Open ayah 68:17

    Ya soló, tomekaki bango lolenge tomekaki bato ya elanga tango bakanaki ete bakobuka yango lobi na tongo,

  18. وَلَا يَسۡتَثۡنُونَ

    Open ayah 68:18

    Bazangaki koloba: Na bolingi ya Allah. (In cha Allah)

  19. فَطَافَ عَلَيۡهَا طَآئِفٞ مِّن رَّبِّكَ وَهُمۡ نَآئِمُونَ

    Open ayah 68:19

    Mabe kowuta epai ya Nkolo nayo ekwelaki yango bazali kolala,

  20. فَأَصۡبَحَتۡ كَٱلصَّرِيمِ 

    Open ayah 68:20

    Na tongo ekomi lokola eloko ezalaki te.

  21. فَتَنَادَوۡاْ مُصۡبِحِينَ

    Open ayah 68:21

    O mokolo molandi: Babiangani bango na bango.

  22. أَنِ ٱغۡدُواْ عَلَىٰ حَرۡثِكُمۡ إِن كُنتُمۡ صَٰرِمِينَ

    Open ayah 68:22

    Bökende noki na bilanga na bino soki bolingi kobuka mbuma.

  23. فَٱنطَلَقُواْ وَهُمۡ يَتَخَٰفَتُونَ

    Open ayah 68:23

    Basololi kati na bango na bango na nsé tango babimaki тропа kokende,

  24. أَن لَّا يَدۡخُلَنَّهَا ٱلۡيَوۡمَ عَلَيۡكُم مِّسۡكِينٞ

    Open ayah 68:24

    Mobola moko te akotela bino lelo na elanga,

  25. وَغَدَوۡاْ عَلَىٰ حَرۡدٖ قَٰدِرِينَ

    Open ayah 68:25

    Mpe bakendeki na tango ya malamu na mokano nyoso ete bakoka kopimela babola.

  26. فَلَمَّا رَأَوۡهَا قَالُوٓاْ إِنَّا لَضَآلُّونَ

    Open ayah 68:26

    Mpe tango bamoni (elanga) yango, balobi: Ya soló tobungi nzela na biso,

  27. بَلۡ نَحۡنُ مَحۡرُومُونَ

    Open ayah 68:27

    То yango; Kasi tozali na eloko te.

  28. قَالَ أَوۡسَطُهُمۡ أَلَمۡ أَقُل لَّكُمۡ لَوۡلَا تُسَبِّحُونَ

    Open ayah 68:28

    Moto ya bosembo kati na bango alobi: Nayebisaki bino te ete: Soki bosanzolaki lukumu ya Allah?

  29. قَالُواْ سُبۡحَٰنَ رَبِّنَآ إِنَّا كُنَّا ظَٰلِمِينَ

    Open ayah 68:29

    Balobi: Lokumu na Nkolo wa biso, ya sólo tozalaki bato mabe.

  30. فَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖ يَتَلَٰوَمُونَ 

    Open ayah 68:30

    Batalani bango na bango, bakomi koloba: Yo nde osali mabe,

  31. قَالُواْ يَٰوَيۡلَنَآ إِنَّا كُنَّا طَٰغِينَ

    Open ayah 68:31

    Mpe balobaki ete: Eh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki batomboki.

  32. عَسَىٰ رَبُّنَآ أَن يُبۡدِلَنَا خَيۡرٗا مِّنۡهَآ إِنَّآ إِلَىٰ رَبِّنَا رَٰغِبُونَ

    Open ayah 68:32

    Tozali kolikia na Nkolo wa biso été abongola eloko ya malamu тропа biso, tozali kolikia pene na Nkolo wa biso.

  33. كَذَٰلِكَ ٱلۡعَذَابُۖ وَلَعَذَابُ ٱلۡأٓخِرَةِ أَكۡبَرُۚ لَوۡ كَانُواْ يَعۡلَمُونَ

    Open ayah 68:33

    Lolenge wana nde etumbu ezalaki, kasi etumbu ya mokolo ya suka eleki monene. Soki bazali koyeba.

  34. إِنَّ لِلۡمُتَّقِينَ عِندَ رَبِّهِمۡ جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ

    Open ayah 68:34

    Ya soló, babangi (Allah) bakozalaka epai ya Nkolo na bango na lola ya kitoko.

  35. أَفَنَجۡعَلُ ٱلۡمُسۡلِمِينَ كَٱلۡمُجۡرِمِينَ

    Open ayah 68:35

    Boye tokozua bandimi ndenge moko na batomboki?

  36. مَا لَكُمۡ كَيۡفَ تَحۡكُمُونَ

    Open ayah 68:36

    Boni bozali kokata likambo na lolenge wana?

  37. أَمۡ لَكُمۡ كِتَٰبٞ فِيهِ تَدۡرُسُونَ

    Open ayah 68:37

    To boye bozali na buku eye bozali koyekola,

  38. إِنَّ لَكُمۡ فِيهِ لَمَا تَخَيَّرُونَ

    Open ayah 68:38

    Ete ya sólo, bokozua nyoso oyo bokolinga.

  39. أَمۡ لَكُمۡ أَيۡمَٰنٌ عَلَيۡنَا بَٰلِغَةٌ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ إِنَّ لَكُمۡ لَمَا تَحۡكُمُونَ

    Open ayah 68:39

    To boye bolapelaki biso bandai ya bosôló kino mokolo ya suka, mpo topesa bino maye bolingi?

  40. سَلۡهُمۡ أَيُّهُم بِذَٰلِكَ زَعِيمٌ 

    Open ayah 68:40

    Tuna bango, nani kati na bango azali nkumu na yango?

  41. أَمۡ لَهُمۡ شُرَكَآءُ فَلۡيَأۡتُواْ بِشُرَكَآئِهِمۡ إِن كَانُواْ صَٰدِقِينَ

    Open ayah 68:41

    To boye bazali na basangani? Baya na bango soki bazali koloba bosôló.

  42. يَوۡمَ يُكۡشَفُ عَن سَاقٖ وَيُدۡعَوۡنَ إِلَى ٱلسُّجُودِ فَلَا يَسۡتَطِيعُونَ

    Open ayah 68:42

    Mokolo oyo lokolo ekomonamaka, mpe bakobengaka bango ete bafukama elongi na mabele kasi bakokokaka kofukama te.

  43. خَٰشِعَةً أَبۡصَٰرُهُمۡ تَرۡهَقُهُمۡ ذِلَّةٞۖ وَقَدۡ كَانُواْ يُدۡعَوۡنَ إِلَى ٱلسُّجُودِ وَهُمۡ سَٰلِمُونَ

    Open ayah 68:43

    Bilongi na bango bikokitisama mpe bakozanga lokumu, nzoka nde babiangamaki mpo bafukama tango bazalaki malamu (na mokili).

  44. فَذَرۡنِي وَمَن يُكَذِّبُ بِهَٰذَا ٱلۡحَدِيثِۖ سَنَسۡتَدۡرِجُهُم مِّنۡ حَيۡثُ لَا يَعۡلَمُونَ

    Open ayah 68:44

    Tika ngai na oyo nyoso azali kozua masolo oyo na lokuta, tokozua bango malembe na esika oyo bakoyeba te.

  45. وَأُمۡلِي لَهُمۡۚ إِنَّ كَيۡدِي مَتِينٌ

    Open ayah 68:45

    Мре natikelaki bango tango kaši, motambo na ngai ezali ya soló.

  46. أَمۡ تَسۡـَٔلُهُمۡ أَجۡرٗا فَهُم مِّن مَّغۡرَمٖ مُّثۡقَلُونَ

    Open ayah 68:46

    То boye osengaki bango lifuta to osengaki bango bazua nyongo ya monene?

  47. أَمۡ عِندَهُمُ ٱلۡغَيۡبُ فَهُمۡ يَكۡتُبُونَ

    Open ayah 68:47

    To boye bayebi maye mabombami, yango bazali кокота?

  48. فَٱصۡبِرۡ لِحُكۡمِ رَبِّكَ وَلَا تَكُن كَصَاحِبِ ٱلۡحُوتِ إِذۡ نَادَىٰ وَهُوَ مَكۡظُومٞ

    Open ayah 68:48

    Мре kanga motema (Muhammad) na kozela mokano ya Nkolo nayo, kasi kozala lokola moto oyo azalaki na libumu ya mbisi te (Yûnus), tango abelelaki (Allah) na kati ya mawa ya monene.

  49. لَّوۡلَآ أَن تَدَٰرَكَهُۥ نِعۡمَةٞ مِّن رَّبِّهِۦ لَنُبِذَ بِٱلۡعَرَآءِ وَهُوَ مَذۡمُومٞ

    Open ayah 68:49

    Soki тропа bolamu ya Nkolo naye te likolo naye, nde abwakamaki libanda bolumbu likolo ya mabele ekauka.

  50. فَٱجۡتَبَٰهُ رَبُّهُۥ فَجَعَلَهُۥ مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ 

    Open ayah 68:50

    Mpe Nkolo naye aponaki ye mpe atiaki ye o molongo ya bato malamu.

  51. وَإِن يَكَادُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَيُزۡلِقُونَكَ بِأَبۡصَٰرِهِمۡ لَمَّا سَمِعُواْ ٱلذِّكۡرَ وَيَقُولُونَ إِنَّهُۥ لَمَجۡنُونٞ

    Open ayah 68:51

    Tango bapengwi bayokelaki yo likunya mpe kotala yo na miso ya mabe na tango bayokaki kurani, balobi: Ya sólo azali ligboma.

  52. وَمَا هُوَ إِلَّا ذِكۡرٞ لِّلۡعَٰلَمِينَ

    Open ayah 68:52

    Wana ezali sé bokundoli тропа mokili mobimba.