القيامة
Al-Qiyaama
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
لَآ أُقۡسِمُ بِيَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ
Open ayah 75:1Nalapi na mokolo ya lisekwa,
وَلَآ أُقۡسِمُ بِٱلنَّفۡسِ ٱللَّوَّامَةِ
Open ayah 75:2Mpe nalapi na molimo oyo elingi kotika mabe te!
أَيَحۡسَبُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَلَّن نَّجۡمَعَ عِظَامَهُۥ
Open ayah 75:3Moto akanisi été tokosangisa mikuwa mia ye te?
بَلَىٰ قَٰدِرِينَ عَلَىٰٓ أَن نُّسَوِّيَ بَنَانَهُۥ
Open ayah 75:4Kasi tozali na bokoki ya kobongisa ye. (mpe kozongisa ye lolenge azalaki)
بَلۡ يُرِيدُ ٱلۡإِنسَٰنُ لِيَفۡجُرَ أَمَامَهُۥ
Open ayah 75:5Moto alingi sé atikala na mabe.
يَسۡـَٔلُ أَيَّانَ يَوۡمُ ٱلۡقِيَٰمَةِ
Open ayah 75:6Azali kotuna: Lisekwa ekozalaka mokolo nini?
فَإِذَا بَرِقَ ٱلۡبَصَرُ
Open ayah 75:7Tango miso ekobulungana (ezangi kornona).
وَخَسَفَ ٱلۡقَمَرُ
Open ayah 75:8Mpe sanza ekozanga bongengi na yango.
وَجُمِعَ ٱلشَّمۡسُ وَٱلۡقَمَرُ
Open ayah 75:9Mpe moyi na sanza ekosanganaka.
يَقُولُ ٱلۡإِنسَٰنُ يَوۡمَئِذٍ أَيۡنَ ٱلۡمَفَرُّ
Open ayah 75:10Mokolo wana moto akolobaka: Wapi nzela ya kokima?
كَلَّا لَا وَزَرَ
Open ayah 75:11Esika ya kokima ezali te.
إِلَىٰ رَبِّكَ يَوۡمَئِذٍ ٱلۡمُسۡتَقَرُّ
Open ayah 75:12Bozongi ekozalaka mokolo wana epai ya Nkolo nayo.
يُنَبَّؤُاْ ٱلۡإِنسَٰنُ يَوۡمَئِذِۭ بِمَا قَدَّمَ وَأَخَّرَ
Open ayah 75:13Bakoyebisa moto mokolo wana maye asalaki na maye atikaki тропа kosala sima.
بَلِ ٱلۡإِنسَٰنُ عَلَىٰ نَفۡسِهِۦ بَصِيرَةٞ
Open ayah 75:14Kasi moto ye moko akoyebaka (makambo naye)
وَلَوۡ أَلۡقَىٰ مَعَاذِيرَهُۥ
Open ayah 75:15Mpe ata asengi bolimbisi.
لَا تُحَرِّكۡ بِهِۦ لِسَانَكَ لِتَعۡجَلَ بِهِۦٓ
Open ayah 75:16Kowelisa lolemu nayo te тропа kotanga na yango (kurani).
إِنَّ عَلَيۡنَا جَمۡعَهُۥ وَقُرۡءَانَهُۥ
Open ayah 75:17Ya soló, biso nde tokosangisa yango na motema nayo mpe kotanga yango.
فَإِذَا قَرَأۡنَٰهُ فَٱتَّبِعۡ قُرۡءَانَهُۥ
Open ayah 75:18Tango tozali kotangisa yo yango, landa yango malamu.
ثُمَّ إِنَّ عَلَيۡنَا بَيَانَهُۥ
Open ayah 75:19Sima ya sólo, tokolimbolela yo yango.
كَلَّا بَلۡ تُحِبُّونَ ٱلۡعَاجِلَةَ
Open ayah 75:20Kasi bolingi sé (bomoyi) ya nsé,
وَتَذَرُونَ ٱلۡأٓخِرَةَ
Open ayah 75:21Mpe botiki oyo ya mokolo ya suka,
وُجُوهٞ يَوۡمَئِذٖ نَّاضِرَةٌ
Open ayah 75:22Mokolo wana okomona bilongi bikongenga,
إِلَىٰ رَبِّهَا نَاظِرَةٞ
Open ayah 75:23Bizali kotala Nkolo na yango,
وَوُجُوهٞ يَوۡمَئِذِۭ بَاسِرَةٞ
Open ayah 75:24Mpe mokolo wana bilongi bikoyinda,
تَظُنُّ أَن يُفۡعَلَ بِهَا فَاقِرَةٞ
Open ayah 75:25Bizali kozela etumbu.
كَلَّآ إِذَا بَلَغَتِ ٱلتَّرَاقِيَ
Open ayah 75:26Kasi te! Tango (molimo) тококота na mongongo,
وَقِيلَ مَنۡۜ رَاقٖ
Open ayah 75:27Мре ekolobama: Nani sika oyo mobikisi?
وَظَنَّ أَنَّهُ ٱلۡفِرَاقُ
Open ayah 75:28Akanisi été alingi akufa. (azali kobunda na liwa),
وَٱلۡتَفَّتِ ٱلسَّاقُ بِٱلسَّاقِ
Open ayah 75:29Mpe lokolo elali likolo ya moninga,
إِلَىٰ رَبِّكَ يَوۡمَئِذٍ ٱلۡمَسَاقُ
Open ayah 75:30Bakomema yo epai ya Nkolo nayo mokolo wana.
فَلَا صَدَّقَ وَلَا صَلَّىٰ
Open ayah 75:31Mpo andimaki te mpe atelemisaki losambo te,
وَلَٰكِن كَذَّبَ وَتَوَلَّىٰ
Open ayah 75:32Kasi aboyaki mpe apesaki mokongo,
ثُمَّ ذَهَبَ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦ يَتَمَطَّىٰٓ
Open ayah 75:33Sima akendaki epai ya bato naye azali kosala lolendo,
أَوۡلَىٰ لَكَ فَأَوۡلَىٰ
Open ayah 75:34Mpasi nayo mpasi.
ثُمَّ أَوۡلَىٰ لَكَ فَأَوۡلَىٰٓ
Open ayah 75:35Sima mpasi nayo mpasi.
أَيَحۡسَبُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَن يُتۡرَكَ سُدًى
Open ayah 75:36Moto azalaki kokanisa ete bakotika ye sé pamba bongo (sima ya kokela ye)?
أَلَمۡ يَكُ نُطۡفَةٗ مِّن مَّنِيّٖ يُمۡنَىٰ
Open ayah 75:37Boye abima kowuta na mayi ya mokongo te oyo elonama?
ثُمَّ كَانَ عَلَقَةٗ فَخَلَقَ فَسَوَّىٰ
Open ayah 75:38Sima na yango akomaki liboke ya makila mpe apesaki ye lolenge ya kitoko te?
فَجَعَلَ مِنۡهُ ٱلزَّوۡجَيۡنِ ٱلذَّكَرَ وَٱلۡأُنثَىٰٓ
Open ayah 75:39Sima akelaki lolenge ya bato mibale te? Mwasi na mobali?
أَلَيۡسَ ذَٰلِكَ بِقَٰدِرٍ عَلَىٰٓ أَن يُحۡـِۧيَ ٱلۡمَوۡتَىٰ
Open ayah 75:40Ezali (Allah) te nde azali na bokoki ya kosekwisa bawei?