المدثر
Al-Muddaththir
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمُدَّثِّرُ
Open ayah 74:1Eh yo (Muhammad) mozipani na bulangiti!
قُمۡ فَأَنذِرۡ
Open ayah 74:2Telema mpe kebisa!
وَرَبَّكَ فَكَبِّرۡ
Open ayah 74:3Mpe kumisa Nkolo nayo ya monene!
وَثِيَابَكَ فَطَهِّرۡ
Open ayah 74:4Mpe petóla bilamba nayo,
وَٱلرُّجۡزَ فَٱهۡجُرۡ
Open ayah 74:5Mpe mitiya mosika na masumu nyoso. (mpe tika yango)!
وَلَا تَمۡنُن تَسۡتَكۡثِرُ
Open ayah 74:6Mpe kopesa te mpo bafuta yo!
وَلِرَبِّكَ فَٱصۡبِرۡ
Open ayah 74:7Mpe zala na bozeli тропа Nkolo nayo!
فَإِذَا نُقِرَ فِي ٱلنَّاقُورِ
Open ayah 74:8Mpe tango bakofula kelelo,
فَذَٰلِكَ يَوۡمَئِذٖ يَوۡمٌ عَسِيرٌ
Open ayah 74:9Wana ekozala mokolo ya mpasi,
عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ غَيۡرُ يَسِيرٖ
Open ayah 74:10Mpona bapengwi ekozala mpete te.
ذَرۡنِي وَمَنۡ خَلَقۡتُ وَحِيدٗا
Open ayah 74:11Tika ngai na oyo nakeli ye moko,
وَجَعَلۡتُ لَهُۥ مَالٗا مَّمۡدُودٗا
Open ayah 74:12Mpe oyo napesaki misolo ebele,
وَبَنِينَ شُهُودٗا
Open ayah 74:13Mpe (napesi ye) bana oyo bazali naye tango nyoso;
وَمَهَّدتُّ لَهُۥ تَمۡهِيدٗا
Open ayah 74:14Mpe oyo nalongolelaki mindondo nyoso.
ثُمَّ يَطۡمَعُ أَنۡ أَزِيدَ
Open ayah 74:15Sima, apengwi na bolamu (na ngai),
كَلَّآۖ إِنَّهُۥ كَانَ لِأٓيَٰتِنَا عَنِيدٗا
Open ayah 74:16Te; ya soló, azalaki kowangana mikapo mia biso na mutu makasi.
سَأُرۡهِقُهُۥ صَعُودًا
Open ayah 74:17Nakopesa ye pasi ya koleka.
إِنَّهُۥ فَكَّرَ وَقَدَّرَ
Open ayah 74:18Ya sólo, akanisaki mpe azuaki mokano,
فَقُتِلَ كَيۡفَ قَدَّرَ
Open ayah 74:19Akufa na ndenge akanaki.
ثُمَّ قُتِلَ كَيۡفَ قَدَّرَ
Open ayah 74:20Sima akufa na ndenge akanaki.
ثُمَّ نَظَرَ
Open ayah 74:21Sima atalaki.
ثُمَّ عَبَسَ وَبَسَرَ
Open ayah 74:22Sima abebisi elongi mpe akangi.
ثُمَّ أَدۡبَرَ وَٱسۡتَكۡبَرَ
Open ayah 74:23Sima abongoli mokongo mpe asali lolendo.
فَقَالَ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ يُؤۡثَرُ
Open ayah 74:24Mpe alobi: (Kurani) oyo ezali bonganga oyo etangisami,
إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا قَوۡلُ ٱلۡبَشَرِ
Open ayah 74:25Wana ezali sé liloba lia moto.
سَأُصۡلِيهِ سَقَرَ
Open ayah 74:26Nakozikisa ye na moto ya saqar.
وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا سَقَرُ
Open ayah 74:27Nani akoyebisa yo nini saqar?
لَا تُبۡقِي وَلَا تَذَرُ
Open ayah 74:28Etiki eloko te mpe ebateli te.
لَوَّاحَةٞ لِّلۡبَشَرِ
Open ayah 74:29Ezali kozikisa mposo ekomi moyindo.
عَلَيۡهَا تِسۡعَةَ عَشَرَ
Open ayah 74:30O kati na yango ezali na (ba anzelu) zomi na libua.
وَمَا جَعَلۡنَآ أَصۡحَٰبَ ٱلنَّارِ إِلَّا مَلَٰٓئِكَةٗۖ وَمَا جَعَلۡنَا عِدَّتَهُمۡ إِلَّا فِتۡنَةٗ لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ لِيَسۡتَيۡقِنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَيَزۡدَادَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِيمَٰنٗا وَلَا يَرۡتَابَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَ وَلِيَقُولَ ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٞ وَٱلۡكَٰفِرُونَ مَاذَآ أَرَادَ ٱللَّهُ بِهَٰذَا مَثَلٗاۚ كَذَٰلِكَ يُضِلُّ ٱللَّهُ مَن يَشَآءُ وَيَهۡدِي مَن يَشَآءُۚ وَمَا يَعۡلَمُ جُنُودَ رَبِّكَ إِلَّا هُوَۚ وَمَا هِيَ إِلَّا ذِكۡرَىٰ لِلۡبَشَرِ
Open ayah 74:31Mpe totiaki bakengeli ya moto sé ba anzelu, mpe totiaki motango na bango sé ezala komekama epai ya bapengwi, mpo ete baye bazua buku liboso bayeba yango mpe ebakisa bondimi epai na bandimi, mpo ete baye bazua buku liboso na bandimi bazala na ntembe te, mpe mpo ete bapagano na baye bazali na bokono o mitema baloba ete: Allah alingi nini na ndakisa oyo? Lolenge wana nde Allah azali kokamba nani alingi mpe kobungisa nani alingi. Mpe moko te ayebi mapinga ya Nkolo nayo sé ye mei. Mpe wana ezali sé bokundoli тропа bato.
كَلَّا وَٱلۡقَمَرِ
Open ayah 74:32Te; (nalapi) na sanza.
وَٱلَّيۡلِ إِذۡ أَدۡبَرَ
Open ayah 74:33Mpe butu tango elalaka.
وَٱلصُّبۡحِ إِذَآ أَسۡفَرَ
Open ayah 74:34Mpe tongo tango etanaka.
إِنَّهَا لَإِحۡدَى ٱلۡكُبَرِ
Open ayah 74:35(Saqar) ezali moko ya (etumbu) ya monene.
نَذِيرٗا لِّلۡبَشَرِ
Open ayah 74:36Ezali bokundoli тропа bato,
لِمَن شَآءَ مِنكُمۡ أَن يَتَقَدَّمَ أَوۡ يَتَأَخَّرَ
Open ayah 74:37Oyo akolinga okati na bino, alanda yango to azonga sima.
كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا كَسَبَتۡ رَهِينَةٌ
Open ayah 74:38Molimo nyoso akozua oyo asalaki,
إِلَّآ أَصۡحَٰبَ ٱلۡيَمِينِ
Open ayah 74:39Longola sé bato ya ngambu ya loboko ya mobali. (balongi),
فِي جَنَّٰتٖ يَتَسَآءَلُونَ
Open ayah 74:40(Bakozalaka) na lola bakomitunama,
عَنِ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
Open ayah 74:41(Mpona) batomboki.
مَا سَلَكَكُمۡ فِي سَقَرَ
Open ayah 74:42Eloko nini ekotisi bino na saqar?
قَالُواْ لَمۡ نَكُ مِنَ ٱلۡمُصَلِّينَ
Open ayah 74:43Bakolobaka: Tozalaki kosambela te.
وَلَمۡ نَكُ نُطۡعِمُ ٱلۡمِسۡكِينَ
Open ayah 74:44Mpe tozalaki koleisa babola te.
وَكُنَّا نَخُوضُ مَعَ ٱلۡخَآئِضِينَ
Open ayah 74:45Mpe tomitiyaki ngambu ya baye balingaki sé koloba mabe.
وَكُنَّا نُكَذِّبُ بِيَوۡمِ ٱلدِّينِ
Open ayah 74:46Mpe tozalaki kondima тропа mokolo ya suka te,
حَتَّىٰٓ أَتَىٰنَا ٱلۡيَقِينُ
Open ayah 74:47Kino liwa liyelaki biso.
فَمَا تَنفَعُهُمۡ شَفَٰعَةُ ٱلشَّٰفِعِينَ
Open ayah 74:48Bolobeli ya balobeli ekosalisaka bango te.
فَمَا لَهُمۡ عَنِ ٱلتَّذۡكِرَةِ مُعۡرِضِينَ
Open ayah 74:49Mpona nini bapesaki bokundoli mokongo?
كَأَنَّهُمۡ حُمُرٞ مُّسۡتَنفِرَةٞ
Open ayah 74:50Bakomi lokola humuru[1] ya kopanzana,
- Humuru: Ezali oboyiké ya nkombo himâr: Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 259.
فَرَّتۡ مِن قَسۡوَرَةِۭ
Open ayah 74:51Tango bazali kokima nkosi.
بَلۡ يُرِيدُ كُلُّ ٱمۡرِيٕٖ مِّنۡهُمۡ أَن يُؤۡتَىٰ صُحُفٗا مُّنَشَّرَةٗ
Open ayah 74:52Nyoso kati na bango azali koluka azua mokanda mpo ayeba.
كَلَّاۖ بَل لَّا يَخَافُونَ ٱلۡأٓخِرَةَ
Open ayah 74:53Ah kasi te! Bazalaki kobanga mokolo ya suka te.
كَلَّآ إِنَّهُۥ تَذۡكِرَةٞ
Open ayah 74:54Ah te! Oyo ezali ya soló bokundoli,
فَمَن شَآءَ ذَكَرَهُۥ
Open ayah 74:55Oyo alingi akanisa.
وَمَا يَذۡكُرُونَ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُۚ هُوَ أَهۡلُ ٱلتَّقۡوَىٰ وَأَهۡلُ ٱلۡمَغۡفِرَةِ
Open ayah 74:56Mpe bakokanisaka te sé Allah alinga. Ye nde esengeli babanga mpe ye nde Nkolo bolimbisi. atonda ngolu