المرسلات
Al-Mursalaat
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
وَٱلۡمُرۡسَلَٰتِ عُرۡفٗا
Open ayah 77:1(Nalapi na nkombo) ya baye batindamaki[1] ya kolandana! (ba anzelu)
- Baye batindamaki: Awa ekoki kolimbolama na: Ba anzelu, to mopepe.
فَٱلۡعَٰصِفَٰتِ عَصۡفٗا
Open ayah 77:2Mpe na baye bafulaka mopepe na mbonge makasi!
وَٱلنَّٰشِرَٰتِ نَشۡرٗا
Open ayah 77:3Mpe bazali kopanza bisika binso!
فَٱلۡفَٰرِقَٰتِ فَرۡقٗا
Open ayah 77:4Mpe na baye bakabolaka mabe na malamu!
فَٱلۡمُلۡقِيَٰتِ ذِكۡرًا
Open ayah 77:5Mpe na baye babwakaka mbela,
عُذۡرًا أَوۡ نُذۡرًا
Open ayah 77:6Mpona bolimbisi to bokebisi!
إِنَّمَا تُوعَدُونَ لَوَٰقِعٞ
Open ayah 77:7Oyo bolakamaki ekozangaka te.
فَإِذَا ٱلنُّجُومُ طُمِسَتۡ
Open ayah 77:8Tango minzoto mikolimwaka.
وَإِذَا ٱلسَّمَآءُ فُرِجَتۡ
Open ayah 77:9Mpe tango mapata ekopasuka,
وَإِذَا ٱلۡجِبَالُ نُسِفَتۡ
Open ayah 77:10Mpe tango bangomba bikolalisamaka,
وَإِذَا ٱلرُّسُلُ أُقِّتَتۡ
Open ayah 77:11Mpe tango ngonga ya bosangani ya batindami ekotiyamaka.
لِأَيِّ يَوۡمٍ أُجِّلَتۡ
Open ayah 77:12Yango ezongisami mpona mokolo nini?
لِيَوۡمِ ٱلۡفَصۡلِ
Open ayah 77:13O mokolo ya kokata makambo.
وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِ
Open ayah 77:14Mpe nani akoyebisaka yo mokolo ya kokata makambo?
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Open ayah 77:15Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
أَلَمۡ نُهۡلِكِ ٱلۡأَوَّلِينَ
Open ayah 77:16Boye tobomaki bamisusu liboso te?
ثُمَّ نُتۡبِعُهُمُ ٱلۡأٓخِرِينَ
Open ayah 77:17Sima tolandisaki bamisusu te.
كَذَٰلِكَ نَفۡعَلُ بِٱلۡمُجۡرِمِينَ
Open ayah 77:18Lolenge wana nde tokosalelaka batomboki.
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Open ayah 77:19Etumbu ekozala mokolo wana тропа bakosi.
أَلَمۡ نَخۡلُقكُّم مِّن مَّآءٖ مَّهِينٖ
Open ayah 77:20Boye tokelaki bino na mayi ya moselu te?
فَجَعَلۡنَٰهُ فِي قَرَارٖ مَّكِينٍ
Open ayah 77:21Мре totiyaki yango na ebombelo elamu te?
إِلَىٰ قَدَرٖ مَّعۡلُومٖ
Open ayah 77:22Na elaka oyo eyebani te?
فَقَدَرۡنَا فَنِعۡمَ ٱلۡقَٰدِرُونَ
Open ayah 77:23Totiyaki mibeko na lolenge ya malamu te?
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Open ayah 77:24Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
أَلَمۡ نَجۡعَلِ ٱلۡأَرۡضَ كِفَاتًا
Open ayah 77:25Boye totiyaki mabele ezala ebombelo ya (makambo) nyoso te?
أَحۡيَآءٗ وَأَمۡوَٰتٗا
Open ayah 77:26(Mpona) baye bazali na bomoyi na baye bakufa?
وَجَعَلۡنَا فِيهَا رَوَٰسِيَ شَٰمِخَٰتٖ وَأَسۡقَيۡنَٰكُم مَّآءٗ فُرَاتٗا
Open ayah 77:27Boye topikelaki yango bangomba ya milai? Mpe tomelisaki bino mayi ya elengi te?
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Open ayah 77:28Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
ٱنطَلِقُوٓاْ إِلَىٰ مَا كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ
Open ayah 77:29Bökende epai ya maye bozalaki kozua yango nalokuta.
ٱنطَلِقُوٓاْ إِلَىٰ ظِلّٖ ذِي ثَلَٰثِ شُعَبٖ
Open ayah 77:30Bökende epai ya elili ya milinga oyo ezali na mozindo misato,
لَّا ظَلِيلٖ وَلَا يُغۡنِي مِنَ ٱللَّهَبِ
Open ayah 77:31Oyo ezali na elili te mpe ekoki kobatela moto na motó te!
إِنَّهَا تَرۡمِي بِشَرَرٖ كَٱلۡقَصۡرِ
Open ayah 77:32Ya soló motó ezali kobwaka balolemo na yango ya kilo lokola bandako ya kilo,
كَأَنَّهُۥ جِمَٰلَتٞ صُفۡرٞ
Open ayah 77:33Ezali lokola bakamela langi na yango lokola mayi ya mosaka.
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Open ayah 77:34Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
هَٰذَا يَوۡمُ لَا يَنطِقُونَ
Open ayah 77:35Mokolo wana bakolobaka te,
وَلَا يُؤۡذَنُ لَهُمۡ فَيَعۡتَذِرُونَ
Open ayah 77:36Mpe bakolingela moto moko bolimbisi te,
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Open ayah 77:37Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
هَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِۖ جَمَعۡنَٰكُمۡ وَٱلۡأَوَّلِينَ
Open ayah 77:38Oyo nde mokolo ya kokata (makambo), tokosangisa bino na bato ya liboso.
فَإِن كَانَ لَكُمۡ كَيۡدٞ فَكِيدُونِ
Open ayah 77:39Soki bolingi bosala likita ya mabe тропа ngai, bosalela ngai.
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Open ayah 77:40Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي ظِلَٰلٖ وَعُيُونٖ
Open ayah 77:41Ya soló babangi, bakozala na bisika ya malili mpe ya maziba,
وَفَوَٰكِهَ مِمَّا يَشۡتَهُونَ
Open ayah 77:42(Bakoliaka) bambuma oyo balingi.
كُلُواْ وَٱشۡرَبُواْ هَنِيٓـَٔۢا بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Open ayah 77:43Bolia, mpe bomela na mposa na bino тропа maye bosalaki.
إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Open ayah 77:44Ya sólo, lolenge wana nde tokofutaka babongisi.
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Open ayah 77:45Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
كُلُواْ وَتَمَتَّعُواْ قَلِيلًا إِنَّكُم مُّجۡرِمُونَ
Open ayah 77:46Bolia mpe bomela (токе na mokili), Ya sólo penza bozali batomboki.
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Open ayah 77:47Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
وَإِذَا قِيلَ لَهُمُ ٱرۡكَعُواْ لَا يَرۡكَعُونَ
Open ayah 77:48Mpe tango bayebisaki bango: Ete bogumbama, kasi balingaki kogumbama te. (тропа Allah)
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Open ayah 77:49Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
فَبِأَيِّ حَدِيثِۭ بَعۡدَهُۥ يُؤۡمِنُونَ
Open ayah 77:50(Sima na yango), liloba nini lisusu bokondimaka?