النبإ
An-Naba
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
عَمَّ يَتَسَآءَلُونَ
Open ayah 78:1Na likambo nini bazali komitunana?
عَنِ ٱلنَّبَإِ ٱلۡعَظِيمِ
Open ayah 78:2Likolo ya sango enene,
ٱلَّذِي هُمۡ فِيهِ مُخۡتَلِفُونَ
Open ayah 78:3Eye pona yango bakeseni makanisi.
كَلَّا سَيَعۡلَمُونَ
Open ayah 78:4Te kasi bakoyeba yango sima ya mwa ngonga moke.
ثُمَّ كَلَّا سَيَعۡلَمُونَ
Open ayah 78:5Te sima lisusu bakoyeba yango.
أَلَمۡ نَجۡعَلِ ٱلۡأَرۡضَ مِهَٰدٗا
Open ayah 78:6Tozalisaki te mabele etando?
وَٱلۡجِبَالَ أَوۡتَادٗا
Open ayah 78:7Mpe bangomba lokola makonzi?
وَخَلَقۡنَٰكُمۡ أَزۡوَٰجٗا
Open ayah 78:8Tokelaki bino te mibale mibale?
وَجَعَلۡنَا نَوۡمَكُمۡ سُبَاتٗا
Open ayah 78:9Мре tozalisaki te mpongi ezala pona bino bopemi?
وَجَعَلۡنَا ٱلَّيۡلَ لِبَاسٗا
Open ayah 78:10Мре tokelaki te butu ezala elamba ekozipa bino?
وَجَعَلۡنَا ٱلنَّهَارَ مَعَاشٗا
Open ayah 78:11Mpe tosalaki te mokolo тропа misala mia bomoyi?
وَبَنَيۡنَا فَوۡقَكُمۡ سَبۡعٗا شِدَادٗا
Open ayah 78:12Mpe totongaki te likolo na bino (mapata) sambo ekembama?
وَجَعَلۡنَا سِرَاجٗا وَهَّاجٗا
Open ayah 78:13Mpe totiaki te o’teyi na yango mwinda mozali kongenga?
وَأَنزَلۡنَا مِنَ ٱلۡمُعۡصِرَٰتِ مَآءٗ ثَجَّاجٗا
Open ayah 78:14Mpe tokitisaki kowuta na mapata mayi ebele,
لِّنُخۡرِجَ بِهِۦ حَبّٗا وَنَبَاتٗا
Open ayah 78:15Mpo ete na mayi tobimisa bambuma mpe bilona,
وَجَنَّٰتٍ أَلۡفَافًا
Open ayah 78:16Na bilanga ekembisami (kitoto)?
إِنَّ يَوۡمَ ٱلۡفَصۡلِ كَانَ مِيقَٰتٗا
Open ayah 78:17Ya soló, mokolo ya mbano mozali na ntango ya koyebana.
يَوۡمَ يُنفَخُ فِي ٱلصُّورِ فَتَأۡتُونَ أَفۡوَاجٗا
Open ayah 78:18Mokolo bakofula kelelo bokoya lisanga lisanga.
وَفُتِحَتِ ٱلسَّمَآءُ فَكَانَتۡ أَبۡوَٰبٗا
Open ayah 78:19Mpe likolo likofungwama bikokoma bikuke.
وَسُيِّرَتِ ٱلۡجِبَالُ فَكَانَتۡ سَرَابًا
Open ayah 78:20Mpe bangomba bikotambola na lombango.
إِنَّ جَهَنَّمَ كَانَتۡ مِرۡصَادٗا
Open ayah 78:21Ya solo, lifelo ezali kozela.
لِّلطَّٰغِينَ مَـَٔابٗا
Open ayah 78:22Esika yakofanda тропа batomboki.
لَّٰبِثِينَ فِيهَآ أَحۡقَابٗا
Open ayah 78:23O’kati na yango bakofanda seko na seko.
لَّا يَذُوقُونَ فِيهَا بَرۡدٗا وَلَا شَرَابًا
Open ayah 78:24O’kati na yango bakoyoka mopepe ya kitoko te mpe bakomela eloko te,
إِلَّا حَمِيمٗا وَغَسَّاقٗا
Open ayah 78:25Longola sé mayi ya moto ya tofina,
جَزَآءٗ وِفَاقًا
Open ayah 78:26Lokola lifuta lia bosembo тропа bango.
إِنَّهُمۡ كَانُواْ لَا يَرۡجُونَ حِسَابٗا
Open ayah 78:27Mpo ete bazalaki kondima na mokolo mwa bosambisami te.
وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا كِذَّابٗا
Open ayah 78:28Mpe batiaki ntembe na maloba na biso.
وَكُلَّ شَيۡءٍ أَحۡصَيۡنَٰهُ كِتَٰبٗا
Open ayah 78:29Nzoka nde biso totiaki manso na mokanda.
فَذُوقُواْ فَلَن نَّزِيدَكُمۡ إِلَّا عَذَابًا
Open ayah 78:30Kasi bomeka! Biso tokobakisa pona bino te sé etumbu.
إِنَّ لِلۡمُتَّقِينَ مَفَازًا
Open ayah 78:31Ya soló, elonga ezali тропа babangi (Allah).
حَدَآئِقَ وَأَعۡنَٰبٗا
Open ayah 78:32Bilanga mpe masanga ya bilengi,
وَكَوَاعِبَ أَتۡرَابٗا
Open ayah 78:33Mpe bilenge basi baye bazali banso ya mbula moko,
وَكَأۡسٗا دِهَاقٗا
Open ayah 78:34Mpe bankopo ebele ya bomeli.
لَّا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوٗا وَلَا كِذَّٰبٗا
Open ayah 78:35O’kati na yango bakoyokaka makambo mazanga ntina te mpe lokuta te.
جَزَآءٗ مِّن رَّبِّكَ عَطَآءً حِسَابٗا
Open ayah 78:36Yango nde lifuta kowuta na Nkolo nayo lokola libonza.
رَّبِّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا ٱلرَّحۡمَٰنِۖ لَا يَمۡلِكُونَ مِنۡهُ خِطَابٗا
Open ayah 78:37Ye Nkolo mapata mpe mabele na maye mazwami kati kati na yango, Ar-Rahmân[1] bakozala na liloba te o’boso bwa ye.
- Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30
يَوۡمَ يَقُومُ ٱلرُّوحُ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ صَفّٗاۖ لَّا يَتَكَلَّمُونَ إِلَّا مَنۡ أَذِنَ لَهُ ٱلرَّحۡمَٰنُ وَقَالَ صَوَابٗا
Open ayah 78:38Mokolo molimo mosantu mpe na ba anzelu bakotelema molongo moko mpe moto akozala na liloba te longola sé oyo Ar-Rahmân[1] (Allah) akopesa ye ndingisa mpe akoloba sé bosembo.
- Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
ذَٰلِكَ ٱلۡيَوۡمُ ٱلۡحَقُّۖ فَمَن شَآءَ ٱتَّخَذَ إِلَىٰ رَبِّهِۦ مَـَٔابًا
Open ayah 78:39Mokolo yango ezali ya sólo. Oyo alingi amitia na libateli ya Nkolo naye.
إِنَّآ أَنذَرۡنَٰكُمۡ عَذَابٗا قَرِيبٗا يَوۡمَ يَنظُرُ ٱلۡمَرۡءُ مَا قَدَّمَتۡ يَدَاهُ وَيَقُولُ ٱلۡكَافِرُ يَٰلَيۡتَنِي كُنتُ تُرَٰبَۢا
Open ayah 78:40Ya sólo, tokebisi bino na etumbu ya pene, mokolo moto akomona maye maboko maye masalaki na ntango ena mopagano akoloba ete: Eh mpasi na ngai! Na bongwana ata mabele.