النازعات
An-Naazi'aat
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
وَٱلنَّٰزِعَٰتِ غَرۡقٗا
Open ayah 79:1(Na lapi) na baye bapikolaka na makasi!
وَٱلنَّٰشِطَٰتِ نَشۡطٗا
Open ayah 79:2Mpe na baye bayambaka na boboto!
وَٱلسَّٰبِحَٰتِ سَبۡحٗا
Open ayah 79:3Mpe baye batambolaka ndenge balingi!
فَٱلسَّٰبِقَٰتِ سَبۡقٗا
Open ayah 79:4Mpe balekaka na lombango!
فَٱلۡمُدَبِّرَٰتِ أَمۡرٗا
Open ayah 79:5Mpe bazali kobongisa makambo!
يَوۡمَ تَرۡجُفُ ٱلرَّاجِفَةُ
Open ayah 79:6Mokolo moye mabele makoningana (na bofuli ya yambo),
تَتۡبَعُهَا ٱلرَّادِفَةُ
Open ayah 79:7Sima elandani ya mibale.
قُلُوبٞ يَوۡمَئِذٖ وَاجِفَةٌ
Open ayah 79:8Mokolo mona mitema mikoningana na bobangi.
أَبۡصَٰرُهَا خَٰشِعَةٞ
Open ayah 79:9Miso ma bango mikobanga,
يَقُولُونَ أَءِنَّا لَمَرۡدُودُونَ فِي ٱلۡحَافِرَةِ
Open ayah 79:10Bakoloba ete: Ya sôló, tokozongisama na bomoyi na biso sima ya liwa?
أَءِذَا كُنَّا عِظَٰمٗا نَّخِرَةٗ
Open ayah 79:11Sima, yakokoma mikuwa ya kopola?
قَالُواْ تِلۡكَ إِذٗا كَرَّةٌ خَاسِرَةٞ
Open ayah 79:12Balobi ete: Wana ezali bozongisami ya mpamba.
فَإِنَّمَا هِيَ زَجۡرَةٞ وَٰحِدَةٞ
Open ayah 79:13Ya sôló, yango ezali bosangisi ya mbala moko.
فَإِذَا هُم بِٱلسَّاهِرَةِ
Open ayah 79:14Mpe bakozwamaka likolo ya mabele kowuta na malita ma bango.
هَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ مُوسَىٰٓ
Open ayah 79:15Sango ya Mûssa ekomelaki yo te,
إِذۡ نَادَىٰهُ رَبُّهُۥ بِٱلۡوَادِ ٱلۡمُقَدَّسِ طُوًى
Open ayah 79:16Ntango Nkolo naye abengaki ye na ngomba esantu?
ٱذۡهَبۡ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ إِنَّهُۥ طَغَىٰ
Open ayah 79:17Kende epai ya falo pamba te asili kotomboka,
فَقُلۡ هَل لَّكَ إِلَىٰٓ أَن تَزَكَّىٰ
Open ayah 79:18Мре loba naye ококі komipetola te,
وَأَهۡدِيَكَ إِلَىٰ رَبِّكَ فَتَخۡشَىٰ
Open ayah 79:19Мре nakamba yo epai ya Nkolo nayo mpo obanga ye?
فَأَرَىٰهُ ٱلۡأٓيَةَ ٱلۡكُبۡرَىٰ
Open ayah 79:20Mpe (Mûssa) alakisaki ye likamwisi linene,
فَكَذَّبَ وَعَصَىٰ
Open ayah 79:21(Falo alobaki) eza lokuta mpe aboyaki kotosa.
ثُمَّ أَدۡبَرَ يَسۡعَىٰ
Open ayah 79:22Sima apesaki mokongo mpe asali lolendo.
فَحَشَرَ فَنَادَىٰ
Open ayah 79:23Abiangi mpe asangisi bato naye.
فَقَالَ أَنَا۠ رَبُّكُمُ ٱلۡأَعۡلَىٰ
Open ayah 79:24Sima alobaki ete: Ngai nazali Nkolo na bino oyo azali na likolo koleka.
فَأَخَذَهُ ٱللَّهُ نَكَالَ ٱلۡأٓخِرَةِ وَٱلۡأُولَىٰٓ
Open ayah 79:25Na yango Allah azwaki ye na etumbu awa na nsé mpe na mokolo ya suka.
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَعِبۡرَةٗ لِّمَن يَخۡشَىٰٓ
Open ayah 79:26Wana ya soló, ezali elembo тропа moto azali na bobangi.
ءَأَنتُمۡ أَشَدُّ خَلۡقًا أَمِ ٱلسَّمَآءُۚ بَنَىٰهَا
Open ayah 79:27Kokelama na bino ezali makasi koleka to mapata maye atonga?
رَفَعَ سَمۡكَهَا فَسَوَّىٰهَا
Open ayah 79:28Atombola etando na yango mpe akokisa yango.
وَأَغۡطَشَ لَيۡلَهَا وَأَخۡرَجَ ضُحَىٰهَا
Open ayah 79:29Atieli yango butu na moyi.
وَٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ ذَٰلِكَ دَحَىٰهَآ
Open ayah 79:30Mpe na sima atandi mabele.
أَخۡرَجَ مِنۡهَا مَآءَهَا وَمَرۡعَىٰهَا
Open ayah 79:31Mpe na kati na yango abimisi mayi na matiti.
وَٱلۡجِبَالَ أَرۡسَىٰهَا
Open ayah 79:32Mpe atelemisi bangomba.
مَتَٰعٗا لَّكُمۡ وَلِأَنۡعَٰمِكُمۡ
Open ayah 79:33Ezali bilei тропа bino mpe na bibuele na bino.
فَإِذَا جَآءَتِ ٱلطَّآمَّةُ ٱلۡكُبۡرَىٰ
Open ayah 79:34Kasi ntango bobulungani ya monene ekoya,
يَوۡمَ يَتَذَكَّرُ ٱلۡإِنسَٰنُ مَا سَعَىٰ
Open ayah 79:35Mokolo moye moto akokanisa maye asalaki.
وَبُرِّزَتِ ٱلۡجَحِيمُ لِمَن يَرَىٰ
Open ayah 79:36Moto ya lifelo mokozala polele na oyo akomona,
فَأَمَّا مَن طَغَىٰ
Open ayah 79:37Mpona oyo alekisaki ndelo,
وَءَاثَرَ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا
Open ayah 79:38Mpe aponaki bomoyi bwa nsé,
فَإِنَّ ٱلۡجَحِيمَ هِيَ ٱلۡمَأۡوَىٰ
Open ayah 79:39Ya soló, lifelo ekozala esika naye ya kofanda.
وَأَمَّا مَنۡ خَافَ مَقَامَ رَبِّهِۦ وَنَهَى ٱلنَّفۡسَ عَنِ ٱلۡهَوَىٰ
Open ayah 79:40Kasi mpona oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye mpe amipekisaki na bamposa,
فَإِنَّ ٱلۡجَنَّةَ هِيَ ٱلۡمَأۡوَىٰ
Open ayah 79:41Ya soló, lola ekozala esika naye ya bopemi.
يَسۡـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلسَّاعَةِ أَيَّانَ مُرۡسَىٰهَا
Open ayah 79:42Bazali kotuna yo na maye matali mokolo ya suka ntango nini mokolo yango?
فِيمَ أَنتَ مِن ذِكۡرَىٰهَآ
Open ayah 79:43Bwanya nini ozali na yango тропа koyanola bango?
إِلَىٰ رَبِّكَ مُنتَهَىٰهَآ
Open ayah 79:44Ngonga na yango eyebani epai na Nkolo nayo.
إِنَّمَآ أَنتَ مُنذِرُ مَن يَخۡشَىٰهَا
Open ayah 79:45Ya soló yo ozali sé mokebisi тропа oyo azali na bobangi ya mokolo wana.
كَأَنَّهُمۡ يَوۡمَ يَرَوۡنَهَا لَمۡ يَلۡبَثُوٓاْ إِلَّا عَشِيَّةً أَوۡ ضُحَىٰهَا
Open ayah 79:46Ntango bakomona yango bakomimona lokola barandaki na malita sé mokolo moko to ndambo ya mokolo.