المطففين

Al-Mutaffifin

Defrauding · Surah 83 · Ayahs: 36 · Meccan

Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

  1. وَيۡلٞ لِّلۡمُطَفِّفِينَ

    Open ayah 83:1

    Mawa na baye bazali koy iba,

  2. ٱلَّذِينَ إِذَا ٱكۡتَالُواْ عَلَى ٱلنَّاسِ يَسۡتَوۡفُونَ

    Open ayah 83:2

    Baye ntango bazali (kosomba) bazali kosenga ete bakokisela bango emekeli,

  3. وَإِذَا كَالُوهُمۡ أَو وَّزَنُوهُمۡ يُخۡسِرُونَ

    Open ayah 83:3

    Kaši ntango bazali komeka pona bato mosusu bazali kozangisa.

  4. أَلَا يَظُنُّ أُوْلَٰٓئِكَ أَنَّهُم مَّبۡعُوثُونَ

    Open ayah 83:4

    Bango bazali kokanisa ete bakozonga na bomoi te sima ya liwa,

  5. لِيَوۡمٍ عَظِيمٖ

    Open ayah 83:5

    Na mokolo ya monene?

  6. يَوۡمَ يَقُومُ ٱلنَّاسُ لِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

    Open ayah 83:6

    Mokolo moye bato bakotelema liboso ya Nkolo ya molongo,

  7. كَلَّآ إِنَّ كِتَٰبَ ٱلۡفُجَّارِ لَفِي سِجِّينٖ

    Open ayah 83:7

    Kasi ya soló, buku ya bato ya mabe ekozala okati ya sidjíne.

  8. وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا سِجِّينٞ

    Open ayah 83:8

    Nani akoyebisa yo eloko nini sidjíne?

  9. كِتَٰبٞ مَّرۡقُومٞ

    Open ayah 83:9

    Buku eye ekomama.

  10. وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ 

    Open ayah 83:10

    Mokolo wana etumbu ekozala тропа baye baboyi kondima,

  11. ٱلَّذِينَ يُكَذِّبُونَ بِيَوۡمِ ٱلدِّينِ

    Open ayah 83:11

    Baye bazali kozwa mokolo ya suka na lokuta,

  12. وَمَا يُكَذِّبُ بِهِۦٓ إِلَّا كُلُّ مُعۡتَدٍ أَثِيمٍ

    Open ayah 83:12

    Kasi akoboya kondima sé molekisi ndelo mosumuki.

  13. إِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِ ءَايَٰتُنَا قَالَ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ

    Open ayah 83:13

    Oyo soki batangeli ye maloba na biso alobi: Wana ezali másese ya bakoko ya kala.

  14. كَلَّاۖ بَلۡۜ رَانَ عَلَىٰ قُلُوبِهِم مَّا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ

    Open ayah 83:14

    Ezali boye te, kaši mitema miabango mizali na mbindo na maye bazalaki kosala,

  15. كَلَّآ إِنَّهُمۡ عَن رَّبِّهِمۡ يَوۡمَئِذٖ لَّمَحۡجُوبُونَ

    Open ayah 83:15

    Kasi basala angele ya soló mokolo mona mokozipa bango mpo ete bamona Nkolo na bango te,

  16. ثُمَّ إِنَّهُمۡ لَصَالُواْ ٱلۡجَحِيمِ

    Open ayah 83:16

    Sima bakozikisama ya sólo okati ya lifelo.

  17. ثُمَّ يُقَالُ هَٰذَا ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ

    Open ayah 83:17

    Sima bakoloba na bango wana maye bozalaki koboya kondima.

  18. كَلَّآ إِنَّ كِتَٰبَ ٱلۡأَبۡرَارِ لَفِي عِلِّيِّينَ

    Open ayah 83:18

    Ya sólo, buku ya bato malamu ekozala o’kati ya iliyíne.

  19. وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا عِلِّيُّونَ

    Open ayah 83:19

    Nani akoyebisayo eloko nini iliyíne?

  20. كِتَٰبٞ مَّرۡقُومٞ 

    Open ayah 83:20

    Buku eye ekomama,

  21. يَشۡهَدُهُ ٱلۡمُقَرَّبُونَ

    Open ayah 83:21

    Ba anzelu ya pembeni ya Nkolo (Allah) bazali banzeneneke тропа yango.

  22. إِنَّ ٱلۡأَبۡرَارَ لَفِي نَعِيمٍ

    Open ayah 83:22

    Ya sólo bato ya malamu bakozala okati ya bisengo.

  23. عَلَى ٱلۡأَرَآئِكِ يَنظُرُونَ

    Open ayah 83:23

    Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotalana.

  24. تَعۡرِفُ فِي وُجُوهِهِمۡ نَضۡرَةَ ٱلنَّعِيمِ

    Open ayah 83:24

    Okoyeba bilembo bia bisengo o’bilongi bia bango.

  25. يُسۡقَوۡنَ مِن رَّحِيقٖ مَّخۡتُومٍ

    Open ayah 83:25

    Bakomela masanga ya sukali oyo esila kobongisama,

  26. خِتَٰمُهُۥ مِسۡكٞۚ وَفِي ذَٰلِكَ فَلۡيَتَنَافَسِ ٱلۡمُتَنَٰفِسُونَ

    Open ayah 83:26

    Etikaka solo ya mpimbo na suka lokola malasi, na yango esengeli nabaye bazali kolikia тропа yango basala molende.

  27. وَمِزَاجُهُۥ مِن تَسۡنِيمٍ

    Open ayah 83:27

    Mpe esangisani na masanga ya tasmin (liziba),

  28. عَيۡنٗا يَشۡرَبُ بِهَا ٱلۡمُقَرَّبُونَ

    Open ayah 83:28

    Baye bakozala pembeni na Nkolo (Allah) bako mela mayi ya liziba wana.

  29. إِنَّ ٱلَّذِينَ أَجۡرَمُواْ كَانُواْ مِنَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ يَضۡحَكُونَ

    Open ayah 83:29

    Ya soló, bato mabe bazalaki kotiola bandimi.

  30. وَإِذَا مَرُّواْ بِهِمۡ يَتَغَامَزُونَ 

    Open ayah 83:30

    Mpe soki baleki pene na bango bazali (kodongola bango miso nako fina) miso na bango,

  31. وَإِذَا ٱنقَلَبُوٓاْ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِمُ ٱنقَلَبُواْ فَكِهِينَ

    Open ayah 83:31

    Mpe soki bazongi o’mabota na bango bazali kokosa bango,

  32. وَإِذَا رَأَوۡهُمۡ قَالُوٓاْ إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ لَضَآلُّونَ

    Open ayah 83:32

    Mpe soki bamoni bandimi balobi ete: Ya sólo, baye wana nde babunga nzela.

  33. وَمَآ أُرۡسِلُواْ عَلَيۡهِمۡ حَٰفِظِينَ

    Open ayah 83:33

    Nzoka nde batindamaki te bazala bakengeli likolo ya bandimi.

  34. فَٱلۡيَوۡمَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مِنَ ٱلۡكُفَّارِ يَضۡحَكُونَ

    Open ayah 83:34

    Kasi lelo bandimi bako tiola bapagano.

  35. عَلَى ٱلۡأَرَآئِكِ يَنظُرُونَ

    Open ayah 83:35

    Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotala.

  36. هَلۡ ثُوِّبَ ٱلۡكُفَّارُ مَا كَانُواْ يَفۡعَلُونَ

    Open ayah 83:36

    Bapagano bazwi te lifuta liye ekoki na bango na tina ya maye bazalaki kosala.