الحشر
Al-Hashr
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
سَبَّحَ لِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۖ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
Open ayah 59:1Nyoso oyo ezali na likolo na mabele ezali kokumisa Allah, mpe azali wa bokasi atonda bwanya.
هُوَ ٱلَّذِيٓ أَخۡرَجَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ مِن دِيَٰرِهِمۡ لِأَوَّلِ ٱلۡحَشۡرِۚ مَا ظَنَنتُمۡ أَن يَخۡرُجُواْۖ وَظَنُّوٓاْ أَنَّهُم مَّانِعَتُهُمۡ حُصُونُهُم مِّنَ ٱللَّهِ فَأَتَىٰهُمُ ٱللَّهُ مِنۡ حَيۡثُ لَمۡ يَحۡتَسِبُواْۖ وَقَذَفَ فِي قُلُوبِهِمُ ٱلرُّعۡبَۚ يُخۡرِبُونَ بُيُوتَهُم بِأَيۡدِيهِمۡ وَأَيۡدِي ٱلۡمُؤۡمِنِينَ فَٱعۡتَبِرُواْ يَٰٓأُوْلِي ٱلۡأَبۡصَٰرِ
Open ayah 59:2Ye nde abimisaki bapengwi baye bazua buku na bandako na bango na bobimisami ya liboso. Bokanisaki te ete bakobima, mpe bakanisaki ete bozui na bango ekobatela bango liboso ya Allah, mpe Allah abimelaki bango na epai oyo bazalaki kolikia te, mpe akotisaki kobanga na mitema mia bango. Babukaki bandako na bango bango moko, mpe na maboko ya bandimi, bososola na yango liteya, eh bato ya mayele!
وَلَوۡلَآ أَن كَتَبَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِمُ ٱلۡجَلَآءَ لَعَذَّبَهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَاۖ وَلَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ عَذَابُ ٱلنَّارِ
Open ayah 59:3Soki ezalaka elaka oyo Allah akomela bango te, mbele topesaki bango etumbu ya makasi na mokili, mpe o mokolo ya suka bakozalaka na etumbu ya moto.
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ شَآقُّواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥۖ وَمَن يُشَآقِّ ٱللَّهَ فَإِنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
Open ayah 59:4Wana mpo ete: Batiaki tembe na Allah na motindami naye. Мре oyo akotia tembe na Allah, ya soló Allah azali makasi na bopesi etumbu.
مَا قَطَعۡتُم مِّن لِّينَةٍ أَوۡ تَرَكۡتُمُوهَا قَآئِمَةً عَلَىٰٓ أُصُولِهَا فَبِإِذۡنِ ٱللَّهِ وَلِيُخۡزِيَ ٱلۡفَٰسِقِينَ
Open ayah 59:5Nzete ya línat[1] nyoso oyo bokataki, na oyo botikaki ya kotelema ezali sé na bolingi ya Allah, mpe mpo Allah afuta bato ya mabe.
- Línat: Ezali: Nagh’la, Bótala nagh’la na suratu Al-An’ám: 99.
وَمَآ أَفَآءَ ٱللَّهُ عَلَىٰ رَسُولِهِۦ مِنۡهُمۡ فَمَآ أَوۡجَفۡتُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ خَيۡلٖ وَلَا رِكَابٖ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ يُسَلِّطُ رُسُلَهُۥ عَلَىٰ مَن يَشَآءُۚ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
Open ayah 59:6Biloko na bango oyo batikaki, mpe Allah apesaki yango epai ya motindami naye na bitumba te, mpe bobimisaki punda te, ebwele moko mpe te, kasi Allah apesaka elonga na batindami naye likolo ya nani alingi. Mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.
مَّآ أَفَآءَ ٱللَّهُ عَلَىٰ رَسُولِهِۦ مِنۡ أَهۡلِ ٱلۡقُرَىٰ فَلِلَّهِ وَلِلرَّسُولِ وَلِذِي ٱلۡقُرۡبَىٰ وَٱلۡيَتَٰمَىٰ وَٱلۡمَسَٰكِينِ وَٱبۡنِ ٱلسَّبِيلِ كَيۡ لَا يَكُونَ دُولَةَۢ بَيۡنَ ٱلۡأَغۡنِيَآءِ مِنكُمۡۚ وَمَآ ءَاتَىٰكُمُ ٱلرَّسُولُ فَخُذُوهُ وَمَا نَهَىٰكُمۡ عَنۡهُ فَٱنتَهُواْۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۖ إِنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
Open ayah 59:7Bozui ya banguna oyo Allah apeși motindami naye na bitumba, ezali тропа Allah na motindami naye, mpe тропа libota, mpe bana bitike na babola mpe na moleki nzela, (oyo azangi) mpo ete bozui yango etambola kaka te kati na bino bai bomengo. Mpe oyo motindami Ayeli bino bozua yango. Mpe oyo apekisi bino botika. Mpe bobanga Allah, ya sólo, Allah azali makasi na bopesi etumbu.
لِلۡفُقَرَآءِ ٱلۡمُهَٰجِرِينَ ٱلَّذِينَ أُخۡرِجُواْ مِن دِيَٰرِهِمۡ وَأَمۡوَٰلِهِمۡ يَبۡتَغُونَ فَضۡلٗا مِّنَ ٱللَّهِ وَرِضۡوَٰنٗا وَيَنصُرُونَ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥٓۚ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلصَّٰدِقُونَ
Open ayah 59:8Mpona babola baye bakimaki batiki bandako na bango na bomengo na bango тропа koluka bolamu epai na Allah na bosepeli naye, тре basalisaki Allah na motindami naye. Bango wana nde bazali bato ya bosembo.
وَٱلَّذِينَ تَبَوَّءُو ٱلدَّارَ وَٱلۡإِيمَٰنَ مِن قَبۡلِهِمۡ يُحِبُّونَ مَنۡ هَاجَرَ إِلَيۡهِمۡ وَلَا يَجِدُونَ فِي صُدُورِهِمۡ حَاجَةٗ مِّمَّآ أُوتُواْ وَيُؤۡثِرُونَ عَلَىٰٓ أَنفُسِهِمۡ وَلَوۡ كَانَ بِهِمۡ خَصَاصَةٞۚ وَمَن يُوقَ شُحَّ نَفۡسِهِۦ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ
Open ayah 59:9(Mpe basusu) baye bavandaki liboso na mboka, mpe nakati ya bondimi, balingaki baye bakimaki epai na bango, bazalaki na mpasi токе te na mitema mpona koyamba bango na maye bapesaki bango, mpe balingi bango koleka banzoto na bango moko ata bazali na bozangi ya koleka, oyo akomibatela na moyimi ya nzoto naye moko, bango nde bazali na elonga.
وَٱلَّذِينَ جَآءُو مِنۢ بَعۡدِهِمۡ يَقُولُونَ رَبَّنَا ٱغۡفِرۡ لَنَا وَلِإِخۡوَٰنِنَا ٱلَّذِينَ سَبَقُونَا بِٱلۡإِيمَٰنِ وَلَا تَجۡعَلۡ فِي قُلُوبِنَا غِلّٗا لِّلَّذِينَ ءَامَنُواْ رَبَّنَآ إِنَّكَ رَءُوفٞ رَّحِيمٌ
Open ayah 59:10Mpona baye bayaki sima na bango, bazali koloba: Nkolo limbisa biso na bandeko na biso oyo bandima liboso na biso, mpe kobebisa mitema mia biso te mpona baye bandima, Nkolo na biso ozali moyoki otonda ngolu.
۞أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ نَافَقُواْ يَقُولُونَ لِإِخۡوَٰنِهِمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ لَئِنۡ أُخۡرِجۡتُمۡ لَنَخۡرُجَنَّ مَعَكُمۡ وَلَا نُطِيعُ فِيكُمۡ أَحَدًا أَبَدٗا وَإِن قُوتِلۡتُمۡ لَنَنصُرَنَّكُمۡ وَٱللَّهُ يَشۡهَدُ إِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
Open ayah 59:11Boye ozali kornona te mpona baye bazali koloba na bandeko na bango baye bapengwa kati na bato ya buku: Soki babengani bino, tokokende elongo na bino mpe tokotosa moto te sé bino, mpe soki babundisi bino, tokosalisa bino, Ya soló, Allah ayebi ete bazali bato ya lokuta.
لَئِنۡ أُخۡرِجُواْ لَا يَخۡرُجُونَ مَعَهُمۡ وَلَئِن قُوتِلُواْ لَا يَنصُرُونَهُمۡ وَلَئِن نَّصَرُوهُمۡ لَيُوَلُّنَّ ٱلۡأَدۡبَٰرَ ثُمَّ لَا يُنصَرُونَ
Open ayah 59:12Soki babenganami, bakolanda bango te, mpe soki babundisami, bakosalisa bango te, ata soki bakendaki kosalisa bango bakosuka sé na kokima, sima bakosungama te.
لَأَنتُمۡ أَشَدُّ رَهۡبَةٗ فِي صُدُورِهِم مِّنَ ٱللَّهِۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَوۡمٞ لَّا يَفۡقَهُونَ
Open ayah 59:13Mpe bazali na kobanga mingi na mitema тропа bino koleka Allah, mpo ete bazali bato oyo bayebi kososola te.
لَا يُقَٰتِلُونَكُمۡ جَمِيعًا إِلَّا فِي قُرٗى مُّحَصَّنَةٍ أَوۡ مِن وَرَآءِ جُدُرِۭۚ بَأۡسُهُم بَيۡنَهُمۡ شَدِيدٞۚ تَحۡسَبُهُمۡ جَمِيعٗا وَقُلُوبُهُمۡ شَتَّىٰۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَوۡمٞ لَّا يَعۡقِلُونَ
Open ayah 59:14Bakobundisaka bino mobimba te, sé babendani bendani na bamboka ya mike mike biye bibatelami, to mpe sima ya mapango, kimonguna kati na bango na bango ezali makasi, okomona bango ete bazali ya kosangana nzoka nde mitema na bango mizali ya kokabwana, wana mpo ete bazali na mayele te.
كَمَثَلِ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ قَرِيبٗاۖ ذَاقُواْ وَبَالَ أَمۡرِهِمۡ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
Open ayah 59:15Bazali lokola na baye bazali liboso na bango kala te, bamekaki maye bazalaki kosala, kasi bakozuaka etumbu ya makasi.
كَمَثَلِ ٱلشَّيۡطَٰنِ إِذۡ قَالَ لِلۡإِنسَٰنِ ٱكۡفُرۡ فَلَمَّا كَفَرَ قَالَ إِنِّي بَرِيٓءٞ مِّنكَ إِنِّيٓ أَخَافُ ٱللَّهَ رَبَّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Open ayah 59:16Bazali lokola satana tango alobaka na moto ete: Pengwa, mpe soki moto apengwi, alobi naye: Ya soló, nawangani yo. Ya sólo nazali kobanga Allah Nkolo ya mokili.
فَكَانَ عَٰقِبَتَهُمَآ أَنَّهُمَا فِي ٱلنَّارِ خَٰلِدَيۡنِ فِيهَاۚ وَذَٰلِكَ جَزَٰٓؤُاْ ٱلظَّٰلِمِينَ
Open ayah 59:17Mpe esukelaki bango ete: Bango nyoso mibale bakozalaka na moto libela kati na yango. Wana nde ekozala lifuta lia babubi.
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَلۡتَنظُرۡ نَفۡسٞ مَّا قَدَّمَتۡ لِغَدٖۖ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ خَبِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ
Open ayah 59:18Eh bino bandimi! Bobanga Allah, moto nyoso atalisa molimo naye eloko nini esili kolengele тропа lobi, тре bobanga Allah. Ya sólo, Allah ayebi maye bozali kosala.
وَلَا تَكُونُواْ كَٱلَّذِينَ نَسُواْ ٱللَّهَ فَأَنسَىٰهُمۡ أَنفُسَهُمۡۚ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡفَٰسِقُونَ
Open ayah 59:19Mpe bozala lokola baye babosana Allah te (Allah) asali ete bamibosana bango moko. Bango nde bato mabe.
لَا يَسۡتَوِيٓ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِ وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِۚ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِ هُمُ ٱلۡفَآئِزُونَ
Open ayah 59:20Bato ya moto mpe bato ya lola bakozalaka lolenge moko te. Kasi bato ya lola nde balongi.
لَوۡ أَنزَلۡنَا هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانَ عَلَىٰ جَبَلٖ لَّرَأَيۡتَهُۥ خَٰشِعٗا مُّتَصَدِّعٗا مِّنۡ خَشۡيَةِ ٱللَّهِۚ وَتِلۡكَ ٱلۡأَمۡثَٰلُ نَضۡرِبُهَا لِلنَّاسِ لَعَلَّهُمۡ يَتَفَكَّرُونَ
Open ayah 59:21Soki tokitisaka kurani oyo likolo ya ngomba olingaki kornona yango ezali kopasuka na bobangi Allah, tozali kobete bandakisa wana тропа bato bakoka kokanisa.
هُوَ ٱللَّهُ ٱلَّذِي لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ عَٰلِمُ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِۖ هُوَ ٱلرَّحۡمَٰنُ ٱلرَّحِيمُ
Open ayah 59:22Ye Allah oyo nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, moyebi ya mabombami na maye mazali polele, ye wa ngolu atonda boboto.
هُوَ ٱللَّهُ ٱلَّذِي لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡمَلِكُ ٱلۡقُدُّوسُ ٱلسَّلَٰمُ ٱلۡمُؤۡمِنُ ٱلۡمُهَيۡمِنُ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡجَبَّارُ ٱلۡمُتَكَبِّرُۚ سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
Open ayah 59:23Ye Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló sé ye, mokonzi mosantu, azali kimia mobateli, akonza kala, azali nguya, azali sukisa, atonda lolendo, nkembo na Allah wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango.
هُوَ ٱللَّهُ ٱلۡخَٰلِقُ ٱلۡبَارِئُ ٱلۡمُصَوِّرُۖ لَهُ ٱلۡأَسۡمَآءُ ٱلۡحُسۡنَىٰۚ يُسَبِّحُ لَهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
Open ayah 59:24Ye Allah mokeli,mopesi eloko nyoso lolenge na yango, azali na bankombo kitoko, maye mazali о likolo mpe na nsé mazali kokumisa ye, тре ye azali na nguya atonda bwanya.