الفجر
Al-Fajr
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
وَٱلۡفَجۡرِ
Open ayah 89:1(Nalapi) na eleko ya ntongo!
وَلَيَالٍ عَشۡرٖ
Open ayah 89:2(Mpe nalapi) na babutu zomi!
وَٱلشَّفۡعِ وَٱلۡوَتۡرِ
Open ayah 89:3(Mpe nalapi) na motango libale, mpe na motango libale te!
وَٱلَّيۡلِ إِذَا يَسۡرِ
Open ayah 89:4(Mpe nalapi) na butu ntango esilaka.
هَلۡ فِي ذَٰلِكَ قَسَمٞ لِّذِي حِجۡرٍ
Open ayah 89:5Kolapa oyo ezali te mpo na moto oyo atonda mayele?
أَلَمۡ تَرَ كَيۡفَ فَعَلَ رَبُّكَ بِعَادٍ
Open ayah 89:6Omoni te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya aad,
إِرَمَ ذَاتِ ٱلۡعِمَادِ
Open ayah 89:7Na mboka Irama[1] ndenge etongamaki na bandako ya likolo,
- Kombo ya mboka.
ٱلَّتِي لَمۡ يُخۡلَقۡ مِثۡلُهَا فِي ٱلۡبِلَٰدِ
Open ayah 89:8Mboka eye etongama te lolenge wana na mokili,
وَثَمُودَ ٱلَّذِينَ جَابُواْ ٱلصَّخۡرَ بِٱلۡوَادِ
Open ayah 89:9Mpe na bato ya Thamúd baye bazalaki kotobola mabanga okatikati ya bangomba,
وَفِرۡعَوۡنَ ذِي ٱلۡأَوۡتَادِ
Open ayah 89:10Na Falo moto ya mapinga?
ٱلَّذِينَ طَغَوۡاْ فِي ٱلۡبِلَٰدِ
Open ayah 89:11Bango banso bazalaki babuki mibeko o’kati ya bamboka na bango,
فَأَكۡثَرُواْ فِيهَا ٱلۡفَسَادَ
Open ayah 89:12Mpe babebisaki mingi koleka.
فَصَبَّ عَلَيۡهِمۡ رَبُّكَ سَوۡطَ عَذَابٍ
Open ayah 89:13Na yango Nkolo nayo akitiselaki bango fimbu ya etumbu.
إِنَّ رَبَّكَ لَبِٱلۡمِرۡصَادِ
Open ayah 89:14Mpo ete Nkolo nayo azali kotala.
فَأَمَّا ٱلۡإِنسَٰنُ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ رَبُّهُۥ فَأَكۡرَمَهُۥ وَنَعَّمَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَكۡرَمَنِ
Open ayah 89:15Moto azali soki Nkolo naye ameki ye na bokumisi ye mpe na bopesi ye bozwi alobi: Nkolo na ngai akumisi nga.
وَأَمَّآ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ فَقَدَرَ عَلَيۡهِ رِزۡقَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَهَٰنَنِ
Open ayah 89:16Kaši soki ameki ye na bokangeli ye bozwi alobi ete: Nkolo na ngai asundoli nga.
كَلَّاۖ بَل لَّا تُكۡرِمُونَ ٱلۡيَتِيمَ
Open ayah 89:17Kaši te, bino nde bosalisaka bana bitike te,
وَلَا تَحَٰٓضُّونَ عَلَىٰ طَعَامِ ٱلۡمِسۡكِينِ
Open ayah 89:18Mpe bolendisaka bato te pona koleisa babola,
وَتَأۡكُلُونَ ٱلتُّرَاثَ أَكۡلٗا لَّمّٗا
Open ayah 89:19Mpe bozalaki kólia bikitano (bozui mowei atiki) na ndenge ya mabe,
وَتُحِبُّونَ ٱلۡمَالَ حُبّٗا جَمّٗا
Open ayah 89:20Mpe bolingi bomengo na bolingo ya makasi.
كَلَّآۖ إِذَا دُكَّتِ ٱلۡأَرۡضُ دَكّٗا دَكّٗا
Open ayah 89:21Kaši ntango mabele ekobalusama na ndenge ya somo,
وَجَآءَ رَبُّكَ وَٱلۡمَلَكُ صَفّٗا صَفّٗا
Open ayah 89:22Ntango Nkolo nayo akoya mpe ba anzelu bakozala milongo milongo,
وَجِاْيٓءَ يَوۡمَئِذِۭ بِجَهَنَّمَۚ يَوۡمَئِذٖ يَتَذَكَّرُ ٱلۡإِنسَٰنُ وَأَنَّىٰ لَهُ ٱلذِّكۡرَىٰ
Open ayah 89:23Mpe bakoya na lifelo mokolo yango, mokolo wana moto akokanisa makanisi, kaši makanisi wana ekosalisa ye na eloko te.
يَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي قَدَّمۡتُ لِحَيَاتِي
Open ayah 89:24Akoloba eh! Ngai mawa na ngai, soki nasalaki bolamu pona bomoyi na ngai!
فَيَوۡمَئِذٖ لَّا يُعَذِّبُ عَذَابَهُۥٓ أَحَدٞ
Open ayah 89:25Mokolo wana etumbu naye ekokokana na ya moto moko te,
وَلَا يُوثِقُ وَثَاقَهُۥٓ أَحَدٞ
Open ayah 89:26Mpe moto moko te akokangama lokola ye.
يَٰٓأَيَّتُهَا ٱلنَّفۡسُ ٱلۡمُطۡمَئِنَّةُ
Open ayah 89:27Oh yo molimo y a kimia!
ٱرۡجِعِيٓ إِلَىٰ رَبِّكِ رَاضِيَةٗ مَّرۡضِيَّةٗ
Open ayah 89:28Zonga epai ya Nkolo nayo na bozongi ya esengo.
فَٱدۡخُلِي فِي عِبَٰدِي
Open ayah 89:29Kota elongo na bawumbu ba ngai,
وَٱدۡخُلِي جَنَّتِي
Open ayah 89:30Mpe kota okati ya lola na ngai.