الغاشية
Al-Ghaashiya
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
هَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ ٱلۡغَٰشِيَةِ
Open ayah 88:1Ekomeli yo sango ya oyo ekozipa?.
وُجُوهٞ يَوۡمَئِذٍ خَٰشِعَةٌ
Open ayah 88:2Mokolo wana bilongi bikobanga,
عَامِلَةٞ نَّاصِبَةٞ
Open ayah 88:3Makambo maleki bango bakomi na bolembu,
تَصۡلَىٰ نَارًا حَامِيَةٗ
Open ayah 88:4Bakozikisama o’kati ya moto ya makasi.
تُسۡقَىٰ مِنۡ عَيۡنٍ ءَانِيَةٖ
Open ayah 88:5Mpe bakomelisa bango mayi ya moto.
لَّيۡسَ لَهُمۡ طَعَامٌ إِلَّا مِن ضَرِيعٖ
Open ayah 88:6Bakozala na bilei te sé matiti ya nzube,
لَّا يُسۡمِنُ وَلَا يُغۡنِي مِن جُوعٖ
Open ayah 88:7Ekosilisa bango nzala te mpe ekopesa bango nzoto Nkolongono te.
وُجُوهٞ يَوۡمَئِذٖ نَّاعِمَةٞ
Open ayah 88:8Mokolo wana bilongi misusu bikozala na esengo.
لِّسَعۡيِهَا رَاضِيَةٞ
Open ayah 88:9Bikosepela pona maye basalaki,
فِي جَنَّةٍ عَالِيَةٖ
Open ayah 88:10Okati ya lola ya likolo,
لَّا تَسۡمَعُ فِيهَا لَٰغِيَةٗ
Open ayah 88:11Okati na yango okoyoka te makambo ya pamba pamba,
فِيهَا عَيۡنٞ جَارِيَةٞ
Open ayah 88:12Okati na yango maziba mazali kotiola,
فِيهَا سُرُرٞ مَّرۡفُوعَةٞ
Open ayah 88:13Okati na yango bambeto ya kotombwama,
وَأَكۡوَابٞ مَّوۡضُوعَةٞ
Open ayah 88:14Mpe bakopo bitiami,
وَنَمَارِقُ مَصۡفُوفَةٞ
Open ayah 88:15Mpe bikáta bitandami,
وَزَرَابِيُّ مَبۡثُوثَةٌ
Open ayah 88:16Mpe bankwala bizali ya kotandama,
أَفَلَا يَنظُرُونَ إِلَى ٱلۡإِبِلِ كَيۡفَ خُلِقَتۡ
Open ayah 88:17Bazali kot ala te ba ibil[1] ndenge ekelama?
- Ba ibil: Ezali kombo ya banyama oyo babengi kamela.
وَإِلَى ٱلسَّمَآءِ كَيۡفَ رُفِعَتۡ
Open ayah 88:18Mapata lolenge etombwama,
وَإِلَى ٱلۡجِبَالِ كَيۡفَ نُصِبَتۡ
Open ayah 88:19Mpe bangomba lolenge epikama,
وَإِلَى ٱلۡأَرۡضِ كَيۡفَ سُطِحَتۡ
Open ayah 88:20Mpe mabele lolenge etandama?
فَذَكِّرۡ إِنَّمَآ أَنتَ مُذَكِّرٞ
Open ayah 88:21Kundola, pamba te yo ozali sé mokundoli.
لَّسۡتَ عَلَيۡهِم بِمُصَيۡطِرٍ
Open ayah 88:22Kasi ozali mokengeli likolo na bango te.
إِلَّا مَن تَوَلَّىٰ وَكَفَرَ
Open ayah 88:23Longola sé oyo apesi mokongo mpe aboyi kondima,
فَيُعَذِّبُهُ ٱللَّهُ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَكۡبَرَ
Open ayah 88:24Allah akopesa ye etumbu ya monene.
إِنَّ إِلَيۡنَآ إِيَابَهُمۡ
Open ayah 88:25Ya soló, epai na biso nde bozongi na bango,
ثُمَّ إِنَّ عَلَيۡنَا حِسَابَهُم
Open ayah 88:26Mpe ya sólo lifuta lia bango ezali omaboko na biso