البروج

Al-Burooj

The Constellations · Surah 85 · Ayahs: 22 · Meccan

Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

  1. وَٱلسَّمَآءِ ذَاتِ ٱلۡبُرُوجِ

    Open ayah 85:1

    (Na lapi) na mapata eye etonda minzoto!

  2. وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡمَوۡعُودِ

    Open ayah 85:2

    Mpe na lapi na mokolo ya elaka!

  3. وَشَاهِدٖ وَمَشۡهُودٖ

    Open ayah 85:3

    Mpe na lapi na nzeneneke na baye bazali kotala,

  4. قُتِلَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡأُخۡدُودِ

    Open ayah 85:4

    Babomaki bato ya nsé ya ngomba,

  5. ٱلنَّارِ ذَاتِ ٱلۡوَقُودِ

    Open ayah 85:5

    Na moto etonda bankoni,

  6. إِذۡ هُمۡ عَلَيۡهَا قُعُودٞ

    Open ayah 85:6

    Mpe bango bazingaki yango yakofanda,

  7. وَهُمۡ عَلَىٰ مَا يَفۡعَلُونَ بِٱلۡمُؤۡمِنِينَ شُهُودٞ

    Open ayah 85:7

    Mpe bazalaki kornona maye bazali kosala na bandimi.

  8. وَمَا نَقَمُواْ مِنۡهُمۡ إِلَّآ أَن يُؤۡمِنُواْ بِٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَمِيدِ

    Open ayah 85:8

    Bayinamaki mpo ete bandimi na Allah wa nguya atonda lokumu,

  9. ٱلَّذِي لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ شَهِيدٌ

    Open ayah 85:9

    Ye oyo azali na bokonzi ya likolo na nsé, Allah azali na boyebi na biloko binso.

  10. إِنَّ ٱلَّذِينَ فَتَنُواْ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ ثُمَّ لَمۡ يَتُوبُواْ فَلَهُمۡ عَذَابُ جَهَنَّمَ وَلَهُمۡ عَذَابُ ٱلۡحَرِيقِ 

    Open ayah 85:10

    Baye bazali konyokola bandimi ya mibali na ya basi, soki batubeli te bakozwa etumbu ya lifelo mpe monyokoli ya moto.

  11. إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمۡ جَنَّٰتٞ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُۚ ذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡكَبِيرُ

    Open ayah 85:11

    Ya soló, baye bandimi mpe basali misala ya malamu bakozwaka Iola eye mingala mizali kotiola na nsé na yango. Wana nde ezali elonga ya monene.

  12. إِنَّ بَطۡشَ رَبِّكَ لَشَدِيدٌ

    Open ayah 85:12

    Ya sólo, etumbu ya Nkolo nayo ezali makasi.

  13. إِنَّهُۥ هُوَ يُبۡدِئُ وَيُعِيدُ

    Open ayah 85:13

    Ye nde abandaka mpe azongelaka (bokeli).

  14. وَهُوَ ٱلۡغَفُورُ ٱلۡوَدُودُ

    Open ayah 85:14

    Mpe azali molimbisi mpe atonda bolingo,

  15. ذُو ٱلۡعَرۡشِ ٱلۡمَجِيدُ

    Open ayah 85:15

    Nkolo ya ngwende ya lokumu,

  16. فَعَّالٞ لِّمَا يُرِيدُ

    Open ayah 85:16

    Asalaka maye alingi.

  17. هَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ ٱلۡجُنُودِ

    Open ayah 85:17

    Ekomelaki yo te sango ya mapinga,

  18. فِرۡعَوۡنَ وَثَمُودَ

    Open ayah 85:18

    Ya Falo na Thamúd?

  19. بَلِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فِي تَكۡذِيبٖ

    Open ayah 85:19

    Kasi bapagano bazali sé koboya kondima.

  20. وَٱللَّهُ مِن وَرَآئِهِم مُّحِيطُۢ 

    Open ayah 85:20

    Nzoka nde Allah azingi bango.

  21. بَلۡ هُوَ قُرۡءَانٞ مَّجِيدٞ

    Open ayah 85:21

    Kasi yango ezali kurani ya lokumu,

  22. فِي لَوۡحٖ مَّحۡفُوظِۭ

    Open ayah 85:22

    Ekomami likolo ya libaya liye libatelami epai na Allah.