الطارق
At-Taariq
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
وَٱلسَّمَآءِ وَٱلطَّارِقِ
Open ayah 86:1(Na lapi) na mapata mpe na monzoto y a butu!
وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا ٱلطَّارِقُ
Open ayah 86:2Nani akoyebisa yo nini monzoto ya butu,
ٱلنَّجۡمُ ٱلثَّاقِبُ
Open ayah 86:3Ezali monzoto ya bongengi makasi.
إِن كُلُّ نَفۡسٖ لَّمَّا عَلَيۡهَا حَافِظٞ
Open ayah 86:4Ezali na molimo moko te sé azala na mokengeli likolo naye.
فَلۡيَنظُرِ ٱلۡإِنسَٰنُ مِمَّ خُلِقَ
Open ayah 86:5Esengeli na moto ayeba na nini yango akelamaki,
خُلِقَ مِن مَّآءٖ دَافِقٖ
Open ayah 86:6Akelamaki kowuta na litanga ya mayi.
يَخۡرُجُ مِنۢ بَيۡنِ ٱلصُّلۡبِ وَٱلتَّرَآئِبِ
Open ayah 86:7Ewuti o’kati na mokongo mpe mipanzi.
إِنَّهُۥ عَلَىٰ رَجۡعِهِۦ لَقَادِرٞ
Open ayah 86:8Ya soló Allah azali na nguya ya bozongisi ye na bomoyi,
يَوۡمَ تُبۡلَى ٱلسَّرَآئِرُ
Open ayah 86:9Mokolo moye mitema mikobimisa maye ebombaki,
فَمَا لَهُۥ مِن قُوَّةٖ وَلَا نَاصِرٖ
Open ayah 86:10Akozala na nguya te mpe akozala na mosalisi te.
وَٱلسَّمَآءِ ذَاتِ ٱلرَّجۡعِ
Open ayah 86:11(Na lapi) na mapata maye mazali kokitisa mbula,
وَٱلۡأَرۡضِ ذَاتِ ٱلصَّدۡعِ
Open ayah 86:12Мре (na lapi) na mabele maye mazali kofungwama,
إِنَّهُۥ لَقَوۡلٞ فَصۡلٞ
Open ayah 86:13Ya soló, oyo (kurani) ezali liloba ya bosembo.
وَمَا هُوَ بِٱلۡهَزۡلِ
Open ayah 86:14Kasi ezali eloko ya pamba te.
إِنَّهُمۡ يَكِيدُونَ كَيۡدٗا
Open ayah 86:15Ya soló, bango bazali koyangela mwango,
وَأَكِيدُ كَيۡدٗا
Open ayah 86:16Ngai mpe nazali na ya ngai mwango.
فَمَهِّلِ ٱلۡكَٰفِرِينَ أَمۡهِلۡهُمۡ رُوَيۡدَۢا
Open ayah 86:17Pesa bapagano elaka, pesa bango elaka ya mokuse.