التكوير
At-Takwir
Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
إِذَا ٱلشَّمۡسُ كُوِّرَتۡ
Open ayah 81:1Ntango mwese (moyi) mokokoma molili.
وَإِذَا ٱلنُّجُومُ ٱنكَدَرَتۡ
Open ayah 81:2Mpe ntango minzoto miko limwa.
وَإِذَا ٱلۡجِبَالُ سُيِّرَتۡ
Open ayah 81:3Mpe bangomba bikotambola.
وَإِذَا ٱلۡعِشَارُ عُطِّلَتۡ
Open ayah 81:4Mpe ntango bakamela ya zemi bakosundolama.
وَإِذَا ٱلۡوُحُوشُ حُشِرَتۡ
Open ayah 81:5Mpe banyama ya mabe bakosangisama.
وَإِذَا ٱلۡبِحَارُ سُجِّرَتۡ
Open ayah 81:6Mpe ntango bibale bikopela móto.
وَإِذَا ٱلنُّفُوسُ زُوِّجَتۡ
Open ayah 81:7Mpe milimo mikosangisama.
وَإِذَا ٱلۡمَوۡءُۥدَةُ سُئِلَتۡ
Open ayah 81:8Mpe ntango mwana шоке ya mwasi akotunama,
بِأَيِّ ذَنۢبٖ قُتِلَتۡ
Open ayah 81:9Nalisumu nini asalaki mpo baboma ye.
وَإِذَا ٱلصُّحُفُ نُشِرَتۡ
Open ayah 81:10Mpe ntango bakosakola makomi.
وَإِذَا ٱلسَّمَآءُ كُشِطَتۡ
Open ayah 81:11Mpe ntango mapata makopasuka.
وَإِذَا ٱلۡجَحِيمُ سُعِّرَتۡ
Open ayah 81:12Mpe ntango lifelo likopelisama.
وَإِذَا ٱلۡجَنَّةُ أُزۡلِفَتۡ
Open ayah 81:13Mpe ntango lola ekokoma pembeni na bato.
عَلِمَتۡ نَفۡسٞ مَّآ أَحۡضَرَتۡ
Open ayah 81:14Moto akoyeba maye asalaki.
فَلَآ أُقۡسِمُ بِٱلۡخُنَّسِ
Open ayah 81:15Te, na lapi na mapata maye matongami,
ٱلۡجَوَارِ ٱلۡكُنَّسِ
Open ayah 81:16Maye mazali kokima mpe kolimwa,
وَٱلَّيۡلِ إِذَا عَسۡعَسَ
Open ayah 81:17Na lapi mpe na butu ntango ekweyaka,
وَٱلصُّبۡحِ إِذَا تَنَفَّسَ
Open ayah 81:18Mpe na ntongo ntango etanaka,
إِنَّهُۥ لَقَوۡلُ رَسُولٖ كَرِيمٖ
Open ayah 81:19Ya soló, oyo ezali liloba ya motindami gabiliyele ya lokumu,
ذِي قُوَّةٍ عِندَ ذِي ٱلۡعَرۡشِ مَكِينٖ
Open ayah 81:20Atondi na nguya kowuta epai na Nkolo ya ngwende ya lokumu.
مُّطَاعٖ ثَمَّ أَمِينٖ
Open ayah 81:21Atosami atonda bosembo.
وَمَا صَاحِبُكُم بِمَجۡنُونٖ
Open ayah 81:22Sôló ndeko na bino (Muhammad) azali na ligboma te.
وَلَقَدۡ رَءَاهُ بِٱلۡأُفُقِ ٱلۡمُبِينِ
Open ayah 81:23Amonaki ye ya sôló na suka, oyo likolo emonanaka polele lokola ekweyi na mabele.
وَمَا هُوَ عَلَى ٱلۡغَيۡبِ بِضَنِينٖ
Open ayah 81:24Azali kobomba te maye makitaki epai naye.
وَمَا هُوَ بِقَوۡلِ شَيۡطَٰنٖ رَّجِيمٖ
Open ayah 81:25Yango (kurani) ezali liloba ya satana te.
فَأَيۡنَ تَذۡهَبُونَ
Open ayah 81:26Bozali kokende wapi?
إِنۡ هُوَ إِلَّا ذِكۡرٞ لِّلۡعَٰلَمِينَ
Open ayah 81:27Ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba,
لِمَن شَآءَ مِنكُمۡ أَن يَسۡتَقِيمَ
Open ayah 81:28Na oyo alingi kati na bino amisembwama.
وَمَا تَشَآءُونَ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُ رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Open ayah 81:29Bokolingaka te sé sima ya kolinga ya (Allah) Nkolo ya mokili.