العاديات

Al-Aadiyaat

The Chargers · Surah 100 · Ayahs: 11 · Meccan

Translation: Lingala - Zakariya Muhammed Balingongo · Open the surah

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

  1. وَٱلۡعَٰدِيَٰتِ ضَبۡحٗا

    Open ayah 100:1

    (Na lapi) na bakimi mbango baye batondi na pema!

  2. فَٱلۡمُورِيَٰتِ قَدۡحٗا

    Open ayah 100:2

    Baye bazali kobimisa bambuma ya moto ezali kongala (mikalali),

  3. فَٱلۡمُغِيرَٰتِ صُبۡحٗا

    Open ayah 100:3

    Baye babandaka bitumba na ntongo,

  4. فَأَثَرۡنَ بِهِۦ نَقۡعٗا

    Open ayah 100:4

    Mpe sima bazali komatisa putulu.

  5. فَوَسَطۡنَ بِهِۦ جَمۡعًا

    Open ayah 100:5

    Mpe bazali kokota o’kati ya mapinga ya banguna!

  6. إِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ لِرَبِّهِۦ لَكَنُودٞ

    Open ayah 100:6

    Ya soló, moto azali na botondi te тропа Nkolo naye.

  7. وَإِنَّهُۥ عَلَىٰ ذَٰلِكَ لَشَهِيدٞ

    Open ayah 100:7

    Mpe ya sólo, moto azali nzeneneke na yango.

  8. وَإِنَّهُۥ لِحُبِّ ٱلۡخَيۡرِ لَشَدِيدٌ

    Open ayah 100:8

    Kasi pona mposa ya bomengo azali komipesa makasi.

  9. ۞أَفَلَا يَعۡلَمُ إِذَا بُعۡثِرَ مَا فِي ٱلۡقُبُورِ

    Open ayah 100:9

    Ayebi te ntango bakobimisa maye mazwami na malita.

  10. وَحُصِّلَ مَا فِي ٱلصُّدُورِ 

    Open ayah 100:10

    Mpe maye mabombamaki na mitema mikobima polele?

  11. إِنَّ رَبَّهُم بِهِمۡ يَوۡمَئِذٖ لَّخَبِيرُۢ

    Open ayah 100:11

    Ya sólo, mokolo wana Nkolo na bango ayebi sango na bango malamu mpenza.